Masalisi mpo na Makomi
Yakobo, Mwana mobali ya Zebedai


Yakobo, Mwana mobali ya Zebedai

Moko ya Bapostolo zomi na mibale oyo baponamaki na Yesu na ntango ya mosala na Ye ya kufa. Azalaki ndeko ya mobali ya Yoane. Azalaki moko kati na Bapostolo misato oyo baponamaki kozala na Yesu na mabaku malamu koleka: na bosekwi ya mwana mwasi ya Yailo (Mal. 5:37), na Bobongwani (Mat. 17:1; Mal. 9:2; Luk. 9:28), mpe na Getesemane (Mat. 26:37; Mal. 14:33). Elongo na Petelo mpe Yoane, azongisaki Bonganganzambe ya Melikisedeki na mabele na kokulisaka Joseph Smith mpe Oliver Cowdery (Mal&May 27:12; 128:20; JS—Mambi ya Kala 1:72).

Bimisa na lokasa