Masalisi mpo na Makomi
Betele


Betele

Na lokota ya Ebele, elingi koloba “ndako ya Nzambe” mpe ezali moko ya bisika ya bule na Yisalaele. Ezwami penepene ya bakilometele zomi na motoba na nordi ya Yelusaleme. Awa Abalayama atongaki etumbelo na ye na ntango ya boyei na ye ya yambo na Kanana (Gen. 12:8; 13:3). Awa Yakobo amonaki kati na limoni ebutelo kosimbaka likolo na lola (Gen. 28:10–19). Ezalaki lisusu esika moko esantu na mikolo ya Samwele (1 Sam. 7:16; 10:3).

Bimisa na lokasa