Masalisi mpo na Makomi
Abede-nego


Abede-nego

Kati na Boyokani ya Kala, Sadalaka, Mesaka, mpe Abede-nego bazalaki bilenge Bayisalaele basato baye, elongo na Danyele, bamemamaki na ndako ya Nebukadanesala, mokonzi ya Babiloni. Nkombo ya Abede-nego na Ebele ezalaki Azalia. Bilenge minei oyo baboyaki kokota na molongo ya bokaboli bilei mpe vinyo ya mokonzi (Dan. 1). Sadalaka, Mesaka, mpe Abede-nego babwakamaki kati na litumbo ya moto kongala na mokonzi kasi babikisamaki na lolenge ya likamwisi (Dan. 3).

Bimisa na lokasa