Masalisi mpo na Makomi
Mikanda ya Paulo


Mikanda ya Paulo

Ezali buku zomi na minei kati na Boyokani ya Sika oyo ezalaki na ebandeli mikanda mikomami na Apostolo Paulo epayi ya bandimi ya Eklezia. Ekoki kokabolana na bandambo lokola elandi:

1 mpe 2 Batesaloniki (50–51 ya Mobu ya Nkolo)

Paulo akomaki mikanda epayi ya Batesaloniki uta na Kolinti na ntango ya mobembo ya mosala ya misionele na ye ya mibale. Mosala na ye na Tesaloniki molimbolami na Misala 17. Alingaki kozonga na Tesaloniki, kasi akokaki te kosala bongo (1 Tes. 2:18). Boye atindaki Timote mpo na kolendisa babongwami mpe koyela ye nsango ya motindo kani bazalaki. Mokanda ya yambo ezali mbano ya bozongisi matondi likolo ya bozongi ya Timote. Mokanda ya mibale mokomamaki kala mingi te nsima wana.

1 mpe 2 Bakolinti, Bagalatia, Baloma (55–57 ya Mobu ya Nkolo)

Paulo akomaki mikanda epayi ya Bakolinti na ntango ya mobembo mpo na mosala ya misionele na ye ya misato mpo na kopesa eyano na mituna mpe kosembola kilikili oyo ezalaki na kati ya Basantu na Kolinti.

Mokanda epayi ya Bagalatia ekokaki kokomama na mangomba mingi ya Eklezia na kati ya Galatia. Boko bandimi ya Eklezia bazalaki kotika nsango malamu mpo na mobeko ya Bayuda. Kati na mokanda oyo, Paulo alimbolaki ntina ya mobeko ya Mose mpe motuya ya eyamba oyo ezali ya molimo.

Paulo akomaki mokanda epayi ya Baloma uta na Kolinti, ndambo mpo na kolengela Basantu ya Loma mpo na bobimeli alikyaki kosala epayi na bango. Mokanda oyo ezali lisusu kondima malongi oyo ezalaki kowelanama na boko Bayuda oyo babongwamaki na Boklisto.

Bafilipi, Bakolose, Baefese, Filemona, Baebele (60–62 ya Mobu ya Nkolo)

Paulo akomaki mikanda oyo wana ezalaki ye na boloko mpo na mbala ya yambo na Loma.

Paulo akomaki mokanda epayi ya Bafilipi mingi mingi mpo na kolakisa bozongisi matondi mpe bolingo na ye mpo na Basantu ya Filipi mpe mpo na kolendisa bango uta na bosisoi ya bokangemi na ye ya ntango molai.

Paulo akomaki mokanda na ye epayi ya Bakolose lokola mbano ya nsango ete Basantu ya Kolose bazalaki kokweya kati na libunga monene. Bakanisaki ete bobongi nie eyaka na nzela ya kotosa na bokebi nyonso makuli ya libanda mpamba koleka bokolisi ya bomoto ya lolenge ya Klisto.

Mokanda epayi ya Baefese ezali ya motuya monene koleka, mpo ezali na mateya ya Paulo mpo na oyo etali Eklezia ya Klisto.

Mokanda epayi ya Filemo ezali mokanda na ye moko na ntina ya Onesimo, moumbu oyo ayibaki nkolo na ye, Filemo, mpe akimaki na Loma. Paulo azongisaki Onesimo nsima na mokanda yango kosengaka ete Onesimo alimbisama.

Paulo akomaki mokanda epayi ya Baebele na Bayuda bandimi ya Eklezia mpo na kondimisa bango ete mobeko ya Mose ekokisamaki na Klisto mpe ete mobeko ya nsango malamu ya Klisto esili kokitana na esika na yango.

1 mpe 2 Timote, Tito (64–65 ya Mobu ya Nkolo)

Paulo akomaki mikanda oyo nsima ete batika ye uta na boloko mbala ya yambo na Loma.

Paulo akendaki na Efese, wapi atikaki Timote mpo ete atia nsuka na bilobaloba oyo ezalaki se kokola likolo ya malongi, wapi ye akanaki kozonga nsima. Akomaki mokanda na ye ya yambo na Timote, mbele uta na Makedonia, mpo na kopesa toli mpe kolendisa ye kokokisa mosala na ye.

Paulo akomaki mokanda epayi ya Tito na ntango akangolamaki uta na boloko. Ekoki kozala ete akendaki kotala Kelete wapi Tito azalaki kosala. Mokanda oyo ezali kotalela lolenge ya kotambola sembo mpe botosi kati na Eklezia.

Paulo akomaki mokanda na ye ya mibale na Timote wana ezalaki ye na boloko ya mbala ya mibale, kala mingi te liboso na liwa ya Paulo ya martiru. Mokanda oyo ezali na maloba ya nsuka ya Paulo mpe elakisi bompikiliki mpe botie motema na boye wapi atelemelaki liwa.

Bimisa na lokasa