Masalisi mpo na Makomi
Noa, Nkoko ya Biblia


Noa, Nkoko ya Biblia

Kati na Boyokani ya Kala, mwana mobali ya Lemeke mpe nkoko ya zomi uta na Adama (Gen. 5:29–32). Atatolaki Klisto mpe ateyaki boyamboli na nkola moko ya nkuna. Ntango bato babwakaki etinda na ye, Nzambe atindaki ye kotonga masuwa mpo na kobomba libota na ye mpe nyama nyonso ntango mabele mazindaki na mpela mpo na koboma bato ya nkuna (Gen. 6:13–22; Mose 8:16–30). Profeta Joseph Smith ateyaki ete Noa azali anjelu Gabaliele mpe atelemi penepene ya Adama na kosimbaka bafungola ya lobiko.

Bimisa na lokasa