Masalisi mpo na Makomi
Makuli


Makuli

Ndulu mpe milulu ya bule. Makuli misalemi na misala oyo ezali na ndimbola ya molimo. Makuli makoki lisusu kolimbola mibeko mpe meko ya Nzambe.

Makuli kati na Eklezia ezali na lisalisi na bakoni (Yak. 5:14–15), kopambola elambo (Mal&May 20:77, 79), libatisi na bozindisi (Mat. 3:16; Mal&May 20:72–74), kopambola bana mike (Mal&May 20:70), kopesa Molimo Mosantu (Mal&May 20:68; 33:15), kopesa bonganganzambe (Mal&May 84:6–16; 107:41–52), makuli ya tempelo (Mal&May 124:39), mpe libala kati na liyokani ya sika mpe ya libela (Mal&May 132:19–20).

Makuli ya bokitani

Bokuli ya eyamba oyo esalemi na moto na bomoi mpo na moto oyo asili kokufa. Makuli oyo ekotangama solo bobele ntango baoyo mpo na nani makuli masalemaki bandimi yango, babateli mayokani makangami na yango, mpe bakangemi na Molimo Mosantu ya Elaka. Makuli ya lolenge wana ezali kosalema lelo kati na batempelo.

Bimisa na lokasa