Bomoko Tala lisusu Bonzambe, Nzambe Kokoma moko na makanisi, mposa, mpe ntina yambo na Tata na Lola mpe Yesu Klisto, mpe nsima na Basantu basusu. Ezali malamu mpo na bandeko bandimi kofanda esika moko na bomoko, Nze. 133:1. Ngai mpe Tata na ngai tozali moko, Yoan. 10:30 (Mal&May 50:43). Yesu asambelaki ete banso bakoka kozala moko lokola ye mpe Tata na ye bazali moko, Yoan. 17:11–23 (3 Nef. 19:23). Nalombi bino ete bokabwani bozala te na kati na bino, kasi bosangana na bobongi nie esika moko, 1 Kol. 1:10. Zwani mokano na motema moko, kosanganaka na makambo nyonso, 2 Nef. 1:21. Basantu basengeli kozala mitema misangana esika moko na bomoko, Mos. 18:21. Yesu asambelaki mpo na bomoko na kati ya bayekoli Banefi, 3 Nef. 19:23. Bayekoli basalaki bomoko na losambo makasi mpe bokili, 3 Nef. 27:1. Tata, Mwana, mpe Molimo Mosantu bazali moko, Mal&May 20:27–28 (Mal&May 35:2; 50:43). Ezali mosala na biso ya kosangana elongo na eklezia ya solo, Mal&May 23:7. Nyonso oyo bokosenga na bondimi, kozalaka bomoko na losambo, bokozwa, Mal&May 29:6. Soki bozali moko te bozali ya ngai te, Mal&May 38:27. Nkolo abiangaki bato na ye Siona mpamba te bazalaki motema moko mpe mayele moko, Mose 7:18.