Masalisi mpo na Makomi
Nganganzambe monene


Nganganzambe monene

Lotomo moko kati na bonganganzambe. Makomi ezali kolobela “nganganzambe monene” na ndimbola mibale: (1) Lotomo moko kati na Bonganganzambe ya Melikisedeki; mpe (2) na nse ya mobeko ya Mose, mokambi moyangeli ya Bonganganzambe ya Alona.

Ndimbola ya yambo etaleli Yesu Klisto lokola Nganganzambe Monene ya monene. Adama mpe bankoko nyonso bazalaki lisusu banganganzambe banene. Lelo, banganganzambe banene, bakambi misato bazali kosala Bokambi ya Eklezia mpe bazali kokamba likolo ya bamemi banso basusu ya bonganganzambe mpe bandimi nyonso basusu ya Eklezia. Mibali ya kobakisama baoyo balongobani bakulisami lokola banganganzambe banene lokola ebongi malamu na kati ya Eklezia lelo oyo. Banganganzambe banene bakoki kobiangama, kotiama mpembeni, mpe kokulisama lokola baepisikopo (Mal&May 68:19; 107:69–71).

Na ndimbola ya mibale, na nse ya mobeko ya Mose, mokambi moyangeli ya Bonganganzambe ya Alona abiangamaki nganganzambe monene. Lotomo yango elandaki bosangoli ya mbotama eyaki na nzela ya mobotami ya yambo na ntei ya libota ya Alona, Alona ye moko kozalaka nganganzambe monene ya yambo na molongo ya Alona (Esod. 28–29; Lew. 8; Mal&May 84:18).

Bimisa na lokasa