Masalisi mpo na Makomi
Bonganganzambe ya Melikisedeki


Bonganganzambe ya Melikisedeki

Bonganganzambe ya Melikisedeki ezali bonganganzambe ya monene soki te ya likolo; Bonganganzambe ya Alona ezali bonganganzambe boke. Bonganganzambe ya Melikisedeki bozali na bafungola ya mapamboli ya molimo ya Eklezia. Na nzela ya makuli ya bonganganzambe ya monene nguya ya bonzambe emonisami na bato (Mal&May 84:18–25; 107:18–21).

Nzambe abimisaki yambo bonganganzambe ya monene boye na Adama. Bankoko mpe baprofeta na eleko nyonso bazwaki likoki oyo (Mal&May 84:6–17). Ebiangamaki yambo Bonganganzambe Esantu, nsima ya Molongo ya Mwana ya Nzambe. Eyebanaki nsima lokola Bonganganzambe ya Melikisedeki (Mal&May 107:2–4).

Ekweyaki bana ya Yisalaele kokokisa matomba mpe mayokani ya Bonganganzambe ya Melikisedeki, Nkolo alongolaki mobeko monene mpe apesaki bango bonganganzambe boke mpe mobeko moke (Mal&May 84:23–26). Oyo ebiangamaki Bonganganzambe ya Alona mpe mobeko ya Mose. Ntango Yesu ayaki na mabele, Azongisaki Bonganganzambe ya Melikisedeki na Bayuda mpe babandaki kotonga Eklezia na kati ya bango. Nzokande, bonganganzambe mpe Eklezia ebungisamaki lisusu na nzela ya bopengwi. Nsima nyonso ezongisamaki na nzela ya Joseph Smith Mwana. (Mal&May 27:12–13; 128:20; JS—Mambi ya Kala 1:73).

Na kati ya Bonganganzambe ya Melikisedeki ezali na ntomo ya mpaka, ya nganganzambe monene, nkoko, Ntuku sambo, mpe Apostolo (Mal&May 107). Bonganganzambe ya Melikisedeki ekozala ntango nyonso ndambo ya bokonzi ya Nzambe likolo ya mabele.

Mokambi ya Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka azali mokambi ya bonene to Bonganganzambe ya Melikisedeki, mpe azali na bafungola nyonso oyo etali bokonzi ya Nzambe na mabele. Libiangi ya Mokambi ememami bobele na moto moko na ntango moko, mpe azali se moto moko oyo apesami likoki ya kosalela bafungola nyonso ya bonganganzambe (Mal&May 107:64–67; 132:7).

Bimisa na lokasa