Masalisi mpo na Makomi
Etele


Etele

Profeta Moyelede ya nsuka kati na Buku ya Mormon (Etel. 12:1–2).

Buku ya Etele

Buku moko kati na Buku ya Mormon oyo ezali na ndambo ya lisolo ya makomi ya Bayelede. Bayelede bazalaki lingomba moko ya bato oyo bazalaki na ndelo ya westi ya mokili bikeke mingi liboso ya bato ya Lehi. Buku ya Etele ezwamaki kati na bapalaki ntuku mibale na minei oyo bazwaki na bato ya Limiyi (Mos. 8:8–9).

Mikapo 1–2 eyebisi lolenge kani Bayelede batikaki epayi ya bango na ntango ya Linongi ya Babele mpe babandaki mobembo na bango na nini eyebani lokola mokili ya Amerika. Mikapo 3–6 milimboli ete ndeko ya Yelede ya mobali amonaki Mobikisi na bomoi yambo na mbotama mpe basalaki mobembo kati na bibei mwambe. Mikapo 7–11 ezali bolandani ya mambi ya kala ya nkuna oyo ekonzaki mingi ya mambi ya kala ya Bayelede. Moroni, oyo akomaki nkoma ya Etele, akomaki na mikapo 12–13 na ntina ya makamwisi oyo esalemaki na bondimi mpe na ntina ya Klisto mpe na ntina ya Yelusaleme ya Sika oyo ekoya. Mikapo 14–15 eyebisi lolenge nini Bayelede bakomaki ekolo makasi kasi ebebisamaki na etumba ya bana mboka na ntina ya nkuna.

Bimisa na lokasa