Masalisi mpo na Makomi
Yakobo, Mwana mobali ya Lehi


Yakobo, Mwana mobali ya Lehi

Profeta moko ya Buku ya Mormon mpe mokomi ya mateya ebele kati ya babuku ya 2 Nefi mpe Yakobo (2 Nef. 6–11; Yako. 1–7).

Buku ya Yakobo

Buku ya misato kati na Buku ya Mormon. Mokapo 1 molobi ete Nefi alandisaki makomi epayi ya Yakobo mpe nsima abulisaki Yakobo mpe ndeko na ye ya mobali Yosefe kozala banganganzambe mpe bateyi ya bato. Mikapo 2–4 ezali mateya kotindaka bato kozala peto na oyo etali bonsoni. Yakobo ateyaki lisusu na ntina ya boyei ya mosikoli Masiya, mpe apesaki bantina mpo na oyo boko bato na Yisalaele bakondima Ye te na boyei na Ye. Mikapo 5–6 ezali na litatoli ya Yakobo mpe lisese moko ya bosakoli na mambi ya kala mpe etinda ya bato ya Yisalaele. Mikapo 7 ezali na lisolo ya moto moko oyo atanga mingi motomboki na nkombo ya Selemi, oyo azwaki nguya koleka na litatoli ya Nzambe ya Yakobo.

Bimisa na lokasa