Masalisi mpo na Makomi
Adama


Adama

Moto ya yambo oyo akelamaki likolo ya mabele.

Adama azali tata mpe nkoko ya libota ya bato nyonso likolo ya mabele. Bobuki mobeko na ye kati na Elanga ya Edene (Gen. 3; Mal&May 29:40–42; Mose 4) esalaki ete “akweya” mpe akoma moto ya kufa, eteni yoko ya ntina mingi mpo ete bato nyonso bakende liboso likolo ya mabele oyo (2 Nef. 2:14–29; Alma 12:21–26). Adama na Eva basengeli boye kokumisama mpo na mokumba na bango ya kosalaka ete bokoli na biso ya seko ekoka kosalema. Adama azali Mokolo ya Mikolo mpe ayebani lisusu lokola Mikaele (Dan. 7; Mal&May 27:11; 107:53–54; 116; 138:38). Azali anjelu monene (Mal&May 107:54) mpe akoya lisusu na mabele lokola nkoko ya libota ya bato (Mal&May 116).

Bimisa na lokasa