Masalisi mpo na Makomi
Bayuda-te


Bayuda-te

Lokola esalelami kati na makomi, Bayuda-te ezali na ndimbola ebele. Ntango mosusu ezali nkombo ya bato ya eboto ya Bayisalaele te, ntango mosusu bato oyo ya eboto ya Bayuda te, mpe ntango mosusu bikolo oyo bizanga nsango malamu, ata kutu ekoki kozala na ndambuya Bayisalaele ya makila na kati ya bato yango. Lolenge esalelami awa nsima ezali motindo ya liloba yango lokola esalelami kati na Buku ya Mormon mpe Malongi mpe Mayokani.

Bimisa na lokasa