Masalisi mpo na Makomi
Habakuku


Habakuku

Profeta moko ya Boyokani ya Kala na Yuda oyo alobaki na ntina ya bosumuki ya bato ekoki kozala na boyangeli ya Yoyakimi (penepene na mobu 600 Liboso na mbotama ya Klisto).

Buku ya Habakuku

Mokapo 1 ezali bolobani kati na Nkolo mpe profeta na Ye, na bokokani ya masolo oyo ezwami na Yilimia 12 mpe Malongi mpe Mayokani 121. Habakuku atungisamaki ete bato ya nkuna bazali komonana lokola bafuluki. Kati na mokapo 2 Nkolo apesi Habakuku toli ya kozala motema molai—moto moyengebene ayekolaka kotambola na bomoi na bondimi. Mokapo 3 mokomi losambo ya Habakuku kati na oyo wapi azali kotonda boyengebene ya Nzambe.

Bimisa na lokasa