Masalisi mpo na Makomi
Jarom


Jarom

Kati na Buku ya Mormon, mwana mobali moko ya Enosa mpe nkoko mobali ya mwana ya Lehi. Abombaki masolo ya makomi ya Banefi mibu ntuku motoba, 420–361 Liboso na mbotama ya Klisto (Enos. 1:25; Jar. 1:13). Azalaki moto ya sembo oyo aponaki kokoma mingi te kati na lisolo ya makomi ya mambi ya kala (Jar. 1:2).

Buku ya Jarom

Ezali bobele na milongo ya kotanga zomi na mitano kati na mokanda oyo kati na Buku ya Mormon. Jarom akomaki ete Banefi bakobaki kosalela mobeko ya Mose mpe bazelaki boyei ya Klisto. Bakambamaki na bakonzi oyo bazalaki bato ya makasi na bondimi. Bafulukaki lokola bayokelaki baprofeta, banganganzambe, mpe bateyi na bango.

Bimisa na lokasa