Masalisi mpo na Makomi
Kotubela, Ntubela


Kotubela, Ntubela

Makomi ezali kosalela ntubela na nzela mibale. Na lolenge loko, kotubela ezali kosakola bondimi ya moto moko na eloko songolo, ndakisa lokola kosakola ete Yesu azali Klisto (Mat. 10:32; Lom. 10:9; 1 Yoan. 4:1–3; Mal&May 88:104).

Na lolenge mosusu, kotubela ezali kondima elindo ya moto ye moko, lokola na ntubela ya masumu. Ezali mokumba ya bato nyonso kotubela masumu na bango nyonso na Nkolo mpe kozwa bolimbisi na Ye (Mal&May 58:42–43). Ntango esengeli, masumu masengeli kotubelama na moto to bato baye osumukelaki. Masumu minene masengeli kotubelama na mokambi moko ya Eklezia (mingi mingi na episikopo).

Bimisa na lokasa