Masalisi mpo na Makomi
Gada, Mwana mobali ya Yakobo


Gada, Mwana mobali ya Yakobo

Kati na Boyokani ya Kala, mwana mobali moko ya Yakobo mpe Yilipa (Genese 30:10–11). Eboto na ye bakomaki libota moko ya Yisalaele.

Libota ya Gada

Mpo na oyo etali mapamboli ya Yakobo likolo ya mwana mobali na ye Gada, tala Genese 49:19. Mpo na oyo etali mapamboli ya Mose likolo ya libota ya Gada, tala Dutelonome 33:20–21. Engebene na mapamboli oyo, biboto ya Gada bazalaki babundi bitumba. Mabele oyo epesamaki na bango na mabele ya Kanana mazalaki na esti ya Ebale ya Yaladene mpe ezalaki na elanga ya koleisa bibwele mpe na mai beboo.

Bimisa na lokasa