Masalisi mpo na Makomi
Nioka ya motako


Nioka ya motako

Nioka ya motako oyo esalemaki na Mose na etinda ya Nzambe mpo na kobikisa Bayisalaele oyo baswamaki na nioka ya mabe (nioka ya ngenge) kati na esobe (Mit. 21:8–9). Nioka oyo ya motako ekangisamaki na songe ya mwa nzete mpe “atelemisaki yango ete oyo nyonso akotala likolo na yango akoka kobikisama” (Alma 33:19–22). Nkolo alobelaki botombwami ya nioka na esobe lokola elembo na Ye moko kotombwamaka likolo na ekulusu (Yoan. 3:14–15). Emoniseli ya mikolo ya nsuka endimi lisolo ya nioka mabe mpe lolenge kani bato babikisamaki (1 Nef. 17:41; 2 Nef. 25:20; Elam. 8:14–15).

Bimisa na lokasa