Bokwei, Kokitisa Tala lisusu Bosambisi, Kosambisa; Bosambisi, ya Nsuka Kosambisa to kosambisama elindo na Nzambe. Nzambe akokitisa moto ya makanisi ya nkuna, Mas. 12:2. Topesami etumbu na Nkolo, ete tokitisama te elongo na mokili, 1 Kol. 11:32. Maloba, misala, mpe makanisi na biso ekokitisa biso, Alma 12:14. Na koyebaka makambo mpe na kosalaka mango te, bato bazali koya na nse ya bokweisami, Elam. 14:19. Soki tosengeli kotika kosala, tokomemama na nse ya bokweisami, Mor. 9:6. Ye oyo alimbisaka ndeko na ye te azali ya kokitisama liboso ya Nkolo, Mal&May 64:9. Ye oyo asumuki na pole oyo eleki monene akozwa bokweisami monene, Mal&May 82:3. Eklezia mobimba ezali na nse ya bokweisami kino bayamboli mpe bakundoli Buku ya Mormon, Mal&May 84:54–57.