Masalisi mpo na Makomi
Genese


Genese

Buku ya Genese ezali buku ya yambo ya Boyokani ya Kala mpe ekomamaki na profeta Mose. Ezali kopesa lisolo ya bibandeli ebele, ndakisa bokeli ya mabele, kotiama ya nyama mpe moto likolo ya mabele, Bokwei ya Adama mpe Eva, emoniseli ya nsango malamu na Adama, ebandeli ya mabota mpe bikolo, litatela ya nkota ya ndenge na ndenge na Babele, mpe ebandeli ya libota ya Abalayama oyo ememaki na botiami ya ndako ya Yisalaele. Mokumba ya Yosefe lokola mobikisi ya Yisalaele ebetami sete kati na Genese.

Emoniseli ya Mikolo ya Nsuka botali malamu mpo bolimboli polele lisolo ya makomi ya Genese (1 Nef. 5; Etel. 1; Mose 1–8; Abal. 1–5).

Kati na buku ya Genese, mikapo 1–4 milobeli lisolo ya bokeli ya mokili mpe bokoli ya libota ya Adama. Mikapo 5–10 mikomi mambi ya kala ya Noa. Mikapo 11–20 elobi na ntina ya Abalayama mpe libota na ye kino na ntango ya Yisaka. Mikapo 21–35 elandi libota ya Yisaka. Mokapo 36 molobi na ntina ya Esau mpe libota na ye. Mikapo 37–50 elobi na ntina ya libota ya Yakobo mpe mipesi lisolo ya Yosefe wana etekamaki ye na Ejipito mpe mokumba na ye na kobikisaka ndako ya Yisalaele.

Bimisa na lokasa