Masalisi mpo na Makomi
Hagai


Hagai

Profeta moko ya Boyokani ya Kala oyo asakolaki penepene ya mobu 520 Liboso na mbotama ya Klisto na Yelusaleme, kala mingi te nsima ya Bayuda kozonga uta na bokangemi na Babiloni (Ejela 5:1; 6:14). Alobaki na ntina ya botongi lisusu Tempelo ya Nkolo na Yelusaleme mpe amipamelaki bato mpo ete esilaki naino te. Akomaki lisusu na ntina ya tempelo ya mibu nkoto mpe boyangeli ya Mobikisi.

Buku ya Hagai

Kati na mokapo 1, Nkolo amipameli bato mpo na kozalaka kati na bandako na bango oyo esila te nzokande tempelo etikali se ya kozanga kotongama. Mokapo 2 ekomi lisakoli ya Hagai ete Nkolo akopesa kimia na tempelo na Ye.

Bimisa na lokasa