Masalisi mpo na Makomi
Likonzi


Likonzi

Moko ya biteni ya ebongiseli mpe boyangeli ya Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka. Likonzi esalemi na motango moko ya bapalwasi mpe bitape. Na mobimba ezali na ndelo ya nse eyebani mpe eyengibinia na elilingi ya hema oyo elimbolami na Yisaya 54:2: “Yeisa singa na yo molai, mpe lendisa makonzi na yo.” Likonzi moko moko ya Siona esungaka mpe esalisaka kosimba Eklezia lolenge hema to tabelenakele esimbami na makonzi ya yango. Likonzi ezali esika ya bosangisi mpo na montika ya Yisalaele oyo epalangani (Mal&May 82:13–14; 101:17–21).

Bimisa na lokasa