Masalisi mpo na Makomi
Enosa, Mwana mobali ya Yakobo


Enosa, Mwana mobali ya Yakobo

Profeta moko ya Banefi mpe mobateli ya masolo ya makomi kati na Buku ya Mormon oyo asambelaki mpe azwaki bolimbisi ya masumu oyo na nzela ya bondimi na ye na Klisto (Enos. 1:1–8). Nkolo ayokanaki na Enosa mpo na kobimisa Buku ya Mormon na Balamani (Enos. 1:15–17).

Buku ya Enosa

Buku moko kati na Buku ya Mormon oyo eyebisi losambo ya Enosa mpo na bolimbisi na ye moko, mpo na bato na ye, mpe mpo na basusu. Nkolo alakelaki ye ete Buku ya Mormon ekobatelama mpe ekomonana na Balamani na mikolo mikoya. Atako buku yango ezali bobele na mokapo moko, ezali kopesa lisolo ya nguya ya moto oyo alukaki Nzambe na ye na losambo, azalaki motosi na mitindo ya Nzambe, mpe liboso ya liwa na ye asepelaki na boyebi na ye ya Mosikoli.

Bimisa na lokasa