Masalisi mpo na Makomi
Tempelo ya Kirtland, Ohio, (Etazini ya Amerika)


Tempelo ya Kirtland, Ohio, (Etazini ya Amerika)

Tempelo ya yambo oyo etongamaki na Eklezia na ntango oyo ya sika. Basantu batongaki yango na Kirtland, engebene na motindo ya Nkolo (Mal&May 94:3–9). Ntina moko ezalaki mpo na kopesa esika wapi bandimi ya Eklezia oyo balongobani bakokaki kozwa nguya ya molimo, likoki, mpe bososoli (Mal&May 109–110). Ebulisamaki na mokolo ya 27, sanza ya misato ya mobu 1836; losambo ya bobulisi epesamaki na Profeta Joseph Smith na nzela ya emoniseli (Mal&May 109). Nkolo apesaki bimoniseli minene ebele mpe azongisaki bafungola ya bonganganzambe oyo esengamaki kati na tempelo oyo (Mal&May 110; 137). Esalelamaki te mpo na makuli nyonso ya tempelo oyo epesami na batempelo lelo oyo.

Bimisa na lokasa