Masalisi mpo na Makomi
Yakobo, Ndeko ya mobali ya Nkolo


Yakobo, Ndeko ya mobali ya Nkolo

Kati na Boyokani ya Sika, ndeko ya mobali moko ya Nkolo (Gal. 1:19) mpe ya Yose, Simeona, Yuda, mpe boko bandeko ya basi (Mat. 13:55–56; Mal. 6:3; Yud. 1:1). Ayebanaki lisusu lokola Yakobo Moyengebene mpe azalaki na ebonga ya monene kati na Eklezia na Yelusaleme (Mis. 12:17; 15:13; 1 Kol. 15:7; Gal. 2:9–12). Mingi mingi ye nde akomaki mokanda ya Yakobo.

Mokanda ya Yakobo

Buku moko ya Boyokani ya Sika. Na ebandeli ezalaki mokanda motindami na mabota zomi na mibale ya Yisalaele oyo epanzamaki epayi mosusu mpe mokomamaki mingi mingi uta na Yelusaleme. Mokanda yango ezali na boko biteni oyo elobelami polele mpo na oyo etali eyamba ya misala, kozwana na kati toli monene na mokapo 1 ete soki moto azangi bwania, asengeli kosenga Nzambe mpo na lisalisi (Yak. 1:5–6; JS—Mambi ya Kala 1:9–20). Mokapo 2 ezali kotalela bondimi mpe misala. Mikapo 3–4 ezali kolobela mposa ya kokonza lolemo mpe ezali kotinda Basantu koloba mabe moko na mosusu te. Mokapo 5 elendisi Basantu kozala na bompikiliki mpe kobianga bampaka mpo na lipamboli ntango obeli; eteyi lisusu na ntina ya mapamboli ya kosalisaka kobongwana basusu.

Bimisa na lokasa