Masalisi mpo na Makomi
Nebukadanesala


Nebukadanesala

Kati na Boyokani ya Kala, mokonzi ya Babiloni (604–561 Liboso na mbotama ya Klisto) oyo akonzaki Yuda (2 Mik. 24:1–4) mpe azingaki Yelusaleme na basoda (2 Mik. 24:10–11). Profeta Lehi atindamaki kokima Yelusaleme penepene na mobu 600 Liboso na mbotama ya Klisto mpo na koboya kokamatama mokangemi na Babiloni (1 Nef. 1:4–13) ntango Nebukadanesala amemaki mosika Mokonzi Sidikiya mpe bato na ye (2 Mik. 25:1, 8–16, 20–22). Danyele alimbolaki bandoto ya Nebukadanesala (Dan. 2; 4).

Bimisa na lokasa