Masalisi mpo na Makomi
Basambisi, Buku ya


Basambisi, Buku ya

Buku moko kati na Boyokani ya Kala. Buku ya Basambisi ezali koloba na ntina ya Bayisalaele uta liwa ya Yosua kino mbotama ya Samwele.

Mikapo 1–3 ezali nkoma ya ebandeli mpo na buku mobimba ya Basambisi. Milimboli ete mpo Bayisalaele babenganaki te banguna na bango (Bas. 1:16–35), Bayisalaele basengeli komona mpasi ya malandi: bozangi bondimi, mabala na baye bazali te bandimi, mpe losambo ya banzambe ya bikeko. Mikapo 4–5 mipesi lisolo ya Debola mpe Balaka, baoyo bakangolaki Yisalaele uta na Bakanana. Mikapo 6–8 ezali makambo ya botomboli bondimi, oyo ya Gideona, oyo Nkolo apambolaki mpo na kokangola Bayisalaele uta na Bamidyani. Kati na mikapo 9–12, bato ebele bakeseni basalelaki lokola basambisi na Yisalaele uta na ntango wapi mingi ya Bayisalaele bazalaki kati na bopengwi mpe bayangelamaki na bakambi oyo bazalaki bapaya. Mikapo 13–16 milobeli bobimi mpe bokwei ya mosambisi ya nsuka, Samasona. Mikapo ya nsuka, 17–21, ekoki kolimbolama lokola bobakisi oyo ebimisi mozindo ya masumu ya Yisalaele.

Bimisa na lokasa