Masalisi mpo na Makomi
Boyingisi


Mokambi na Makomi

Mokambi na Makomi ezali kolimbola ntina ya malongi, mabongisi, bato, mpe bisika biponami oyo bizwami kati na Biblia Esantu, Buku ya Mormon, Malongi mpe Mayokani, mpe Liyaka ya Ntalo Monene. Ezali mpe lisusu kopesa matangi mpo ete oyekola lisolo moko moko. Mokambi oyo ekoki kosalisa yo na boyekoli ya makomi na yo moko to na boye ya libota na yo. Ekoki kosalisa yo kopesa biyano na mituna mitali nsango malamu, koyekola masolo kati na makomi, kolengela masolo mpe mateya, mpe kokolisa boyebi mpe litatoli na yo ya nsango malamu.

Etanda elandi ezali kolimbola ndakisa ya mama ya lisolo moko kati ya Mokambi na Makomi:

Elilingi
emekoleli

Mabele

Monzoto monene likolo ya oyo wapi tozali, ekelamaki na Nzambe na nzela ya Yesu Klisto ete moto asalela na ntango ya komekama oyo ya kufa. Nsuka na yango ezali kokoma ya kokembelama mpe ya konetolama (Mal&May 77:1–2; 130:8–9). Mabele makokoma libula ya kosangola ya seko ya baoyo wana bazalaki na bomoi oyo elongobani mpo na nkembo ya selesitiale (Mal&May 88:14–26). Bakosepela kozala na miso ya Tata mpe ya Mwana (Mal&May 76:62).

Ekelamaki mpo na moto

Mabongisi ya yambo ya nsango malamu

Mabota oyo ebunga

Mito ya masolo mikomami na baletele ya minene.

Namitu ya masolo ezali na ndimbola ya mokuse epesami.

Masolo mosusu ezali namitu ya masolo malandani. Oyo ekomami na italiki.

Matangi ya makomi na nse ya lisolo se moko epesami kati na bilembetele oyo ( ).

Ntango mosusu nsango etali moto ya likambo ezali te na lisolo oyo ozali kotala kati na buku te. Liloba oyo Tala na italiki ekokamba yo na lisolo wapi nsango ezwami.

Ntango mosusu masolo kati na mokambi ezali na nsango etali lisolo oyo ozali koyekola. Liloba Tala lisusu na italiki ekokamba yo na masolo oyo makokani na masolo yango.

Matangi ya makomi oyo ekosalisa kososola ndimbola epesami kati na bilembetele oyo ( ).

Litangi moko moko ya makomi ebandami na litangi ya mokuse uta na makomi to bokuse ya makomi.

Liloba na italiki Tala (to Tala lisusu) soki elandami na elembetele oyo—ezali koyebisa yo ete nsango ezwami na moto ya lisolo ezwami na nse na yango (“Mabota zomi ebunga ya Yisalaele”) ezali na nse ya lisolo monene (“Yisalaele”).

Bimisa na lokasa