Masalisi mpo na Makomi
Efelaima


Efelaima

Kati na Boyokani ya Kala, mwana mobali ya mibale ya Yosefe mpe Asenata (Gen. 41:50–52; 46:20). Na bokeseni na momeseno ya kala, Efelaima azwaki lipamboli ya ekoki ya mbotama na esika ya Manase, oyo azalaki mwana mobali ya nkulutu (Gen. 48:17–20). Efelaima akomaki tata ya libota ya Efelaima.

Libota ya Efelaima

Efelaima apesamaki ekoki ya mbotama na Yisalaele (1 Nta. 5:1–2; Yil. 31:9). Na mikolo ya nsuka litomba mpe mokumba na bango ezali ya komema bonganganzambe, kokamata etinda ya nsango malamu oyo ezongisami na mokili, mpe kotombola bendele likolo mpo na kosangisa Yisalaele oyo epanzani (Yis. 11:12–13; 2 Nef. 21:12–13). Bana ya Efelaima bakolatisa motole ya nkembo baye uta na bikolo ya nordi bakozonga na mikolo ya nsuka (Mal&May 133:26–34).

Nzete ya Efelaima to ya Yosefe

Lisolo ya makomi ya lingomba moko uta na libota ya Efelaima oyo ekambamaki uta na Yelusaleme na Amerika penepene ya mibu 600 Liboso na mbotama ya Klisto. Lisolo ya makomi ya lingomba oyo ebiangami nzete ya Efelaima to ya Yosefe, to Buku ya Mormon. Yango mpe nzete ya Yuda (Biblia) ezali kosala litatoli esangisami ya Nkolo Yesu Klisto, Bosekwi na Ye, mpe mosala na Ye ya Nzambe na kati ya biteni mibale oyo ya ndako ya Yisalaele.

Bimisa na lokasa