Masalisi mpo na Makomi
Mikonzi


Mikonzi

Buku mibale kati na Boyokani ya Kala. Buku oyo ezali kosakola mambi ya kala ya Yisalaele uta na botomboki ya Adoniya, mwana mobali ya minei ya Mokonzi Dawidi (penepene ya mobu 1015 Liboso na mbotama ya Klisto), kino na bokangemi ya nsuka ya Yuda (penepene ya mobu 586 Liboso na mbotama ya Klisto). Na kati ezali na mambi ya kala mobimba ya bokonzi ya nordi (mabota zomi ya Yisalaele) uta bokabwani kino Basulia bakamataki bango na bokangemi na bikolo ya nordi. Tala lisusu Molongo ya Makambo kati na bobakisi.

Mikonzi ya Yambo

Mokapo 1 ezali kolimbola mikolo ya nsuka ya bomoi ya Mokonzi Dawidi. Mikapo 2–11 mikundoli bomoi ya Solomo. Mikapo 12–16 eyebisi bakitani ya penepene ya Solomo, Lehobama mpe Yelobama. Yelobama asalaki ete bokonzi ya Yisalaele ekabwana. Bakonzi basusu batangami. Mikapo 17–21 mikundoli ndambo ya mosala ya Eliya lokola apamelaki Ahaba, mokonzi ya Yisalaele. Mokapo 22 ezali kokundola etumba na Sulia oyo wapi Ahaba mpe Yosafata, mokonzi ya Yuda, basangisaki mampinga na bango. Profeta Mika asakolaki na kotelemelaka bakonzi yango.

Mikonzi ya Mibale

Mokapo 1:1–2:11 ezali kokoba na bomoi ya Eliya, kolobelaka mpe komata ya Eliya na lola kati na likalo ya moto. Mikapo 2–9 milobeli mosala ya bondimi mpe ya nguya monene ya Elisa. Mokapo 10 ezali kolobela Yeu, mokonzi, mpe lolenge kani abebisaki ndako ya Ahaba mpe banganganzambe ya Bala. Mikapo 11–13 ezali kokundola boyangeli ya sembo ya Yoasa mpe liwa ya Elisa. Mikapo 14–17 milobeli bakonzi ya ndenge na ndenge oyo bayangelaki na Yisalaele mpe na Yuda, mbala mingi kati na nkuna. Mokapo 15 mokundoli bokangemi ya mabota zomi ya Yisalaele na Asulia. Mikapo 18–20 mikundoli bomoi ya sembo ya Hizikiya, mokonzi ya Yuda, mpe profeta Yisaya. Mikapo 21–23 milobeli bakonzi Manase mpe Yosiya. Engebene na masolo ya mimesano, Manase azalaki moyanoli ya martiru ya Yisaya. Yosiya azalaki mokonzi ya sembo oyo azongisaki kotia mobeko na kati ya Bayuda. Mikapo 24–25 mikundoli bokangemi na Babiloni.

Bimisa na lokasa