Masalisi mpo na Makomi
Lifelo


Lifelo

Emoniseli ya mikolo ya nsuka ezali kolobela lifelo na moke na ndimbola mibale. Yambo ezali efandeli kati na mokili ya molimo mpo na baye bazangaki botosi na bomoi ya kufa. Na ndimbola oyo lifelo ezali na nsuka. Kuna milimo mikoteyama nsango malamu, mpe ntango mosusu nsima ya boyamboli na bango bakosekwisama na motuya moko ya nkembo oyo wapi balongobani na yango. Baye bakoyambola te, kasi nzokande bazali te bana ya liboma, bakotikala na lifelo kino nkoto ya mibu. Nsima ya mibu nkoto oyo ya minioko, bakosekwisama na nkembo ya telesitiale (Mal&May 76:81–86; 88:100–101).

Ya mibale, ezali esika ya ntango nyonso mpo na baye basikolami te na Bomikabi ya Yesu Klisto. Na ndimbola oyo, lifelo ezali esika ya ntango nyonso. Ezali mpo na baye bakozwama se “kotikalaka kati na bosoto” (Mal&May 88:35, 102). Oyo ezali esika wapi Satana, banjelu na ye, mpe bana mibali ya ebomi—baoyo bawanganaki Mwana nsima ete Tata abimisa Ye—bakofanda seko (Mal&May 76:43–46).

Mbala mosusu makomi ezali kotangela lifelo lokola molili ya libanda.

Bimisa na lokasa