Masalisi mpo na Makomi
Yisaya


Yisaya

Profeta ya Boyokani ya kala oyo asakolaki uta mobu 740 kino na mobu 710 Liboso na mbotama ya Klisto. Lokola mopesi toli mokonzi ya Mokonzi Hizikiya, Yisaya azalaki na bopusi monene na makambo matali eyamba mpe politiki.

Yesu Atangaki Yisaya mbala na mbala koleka profeta nyonso mosusu Ye atangaki. Yisaya atangami lisusu mbala na mbala na Petelo, Yoane, mpe Paulo kati na Boyokani ya Sika. Buku ya Mormon mpe Malongi mpe Mayokani ezali na matangi mingi uta na Yisaya koleka profeta nyonso mosusu mpe ezali kopesa lisalisi mingi ya kolimbolaka Yisaya. Nefi ateyaki bato na ye uta na nkoma ya Yisaya (2 Nef. 12–24; Yis. 2–14). Nkolo ayebisaki Banefi ete “maloba ya Yisaya ezali minene” mpe ete makambo nyonso oyo Yisaya asakolaki makokokisama (3 Nef. 23:1–3).

Buku ya Yisaya

Buku moko kati na Boyokani ya Kala. Mingi ya masakoli ya Yisaya etaleli boyei ya Mosikoli, ezala na mosala na Ye na mabele (Yis. 9:6) mpe lokola Mokonzi Monene na mokolo ya nsuka (Yis. 63). Asakolaki lisusu na ntina ya Yisalaele na mikolo mikoya.

Mokapo 1 ezali boyingisi ya nyonso oyo etikali ya buku. Yisaya 7:14; 9:6–7; 11:1–5; 53; mpe 61:1–3 eyebisaki liboso mosika etinda ya Mobikisi. Mikapo 2, 11, 12, mpe 35 etaleli makambo na mikolo ya nsuka, ntango nsango malamu ekozongisama, Yisalaele ekosangisama, mpe mabele makawuka makobimisa fulele lokola roza. Mokapo 29 ezali na lisakoli ya kobima ya Buku ya Mormon (2 Nef. 27). Mikapo 40–46 esakoli lolenge Yehova lokola Nzambe ya solo aleki likolo ya banzambe ya bikeko oyo bapaganu bakumbamelaka. Mikapo mitikali, 47–66, etaleli makambo ya bozongisi ya nsuka ya Yisalaele mpe kotiama ya Siona, na Nkolo kofandaka na kati ya bato na Ye.

Bimisa na lokasa