Masalisi mpo na Makomi
Momoni


Momoni

Moto oyo apesami likoki na Nzambe ya komona na miso ya molimo makambo oyo Nzambe abombaki uta na mokili (Mose 6:35–38). Azali mobimisi mpe profeta (Mos. 8:13–16). Kati na Buku ya Mormon, Amona ateyaki ete bobele momoni akoki kosalela babongoli baleki malamu, to Ulima mpe Tumima (Mos. 8:13; 28:16). Momoni ayebi oyo eleka, oyo ezali sikawa, mpe oyo makoya. Na ntango ya kala, bazalaki mbala mingi kobenga profeta momoni (1 Sam. 9:9; 2 Sam. 24:11).

Joseph Smith azali momoni monene ya mikolo ya nsuka (Mal&May 21:1; 135:3). Mpo na kobakisa, Bokambi ya Yambo mpe Lisanga ya Bazomi na mibale basungami lokola baprofeta, bamoni, mpe babimisi.

Bimisa na lokasa