Masalisi mpo na Makomi
Bafilipi, Mokanda na


Bafilipi, Mokanda na

Mokanda oyo Paulo akomaki epayi ya basantu ya Filipi wana ezalaki ye mbala ya yambo kati na boloko na Loma. Ezali sikawa buku ya Bafilipi kati na Boyokani ya Sika.

Mokapo 1 ezali na mbote ya Paulo mpe malakisi na ye na ntina ya bomoko, bomikitisi, mpe molende. Mokapo 2 mobeti sete ete banso bakokumbama liboso ya Klisto mpe ete moto na moto asengeli kosala mpo na lobiko na ye moko. Na mokapo 3, Paulo alimboli ete atikaki biloko nyonso mpo na Klisto. Na mokapo 4, Paulo atondaki Basantu ya Filipo mpo na lisungi na bango.

Bimisa na lokasa