Masalisi mpo na Makomi
Malako


Malako

Kati na Boyokani ya Sika, Yoane Malako azalaki mwana mobali ya Malia, oyo azalaki kofanda na Yelusaleme (Mis. 12:12); akokaki kozala lisusu mwana mobali ya ndeko mobali to mwasi ya mama (to tata) ya Balanaba (Kolos. 4:10). Akendaki elongo na Paulo mpe Balanaba uta na Yelusaleme na mobembo na bango ya yambo ya misionele mpe atikaki bango na Pelege (Mis. 12:25; 13:5, 13). Nsima akendaki elongo na Balanaba na Kupulu (Mis. 15:37–39). Azalaki elongo na Paulo na Loma (Kolos. 4:10; Filem. 1:24), mpe azalaki na Petelo na Babiloni (ekokaki mpe kozala na Loma) (1 Pet. 5:13). Na nsuka, azalaki elongo na Timote na Efese (2 Tim. 4:11).

Nsango malamu ya Malako

Buku ya mibale kati na Boyokani ya Sika. Nsango malamu ya Malako ekomamaki mbele na nse ya bokambami ya Petelo. Likambo na ye ezali kolimbola Nkolo lokola Mwana ya Nzambe ya bomoi mpe kosalaka na kati ya bato. Malako alimboli, na makasi mpe bosokemi, lolenge Yesu abetaki mitema ya bato batelemaki mpembeni. Masolo ya momeseno elobi ete nsima ya liwa ya Petelo, Malako akendaki na Ejipito, abongisaki Eklezia na Alexandria, mpe akufaki liwa ya martiru.

Mpo na bokuse ya mambi etali bomoi ya Mobikisi etalisami kati ya nsango malamu ya Malako, tala Boyokani ya Bansango Malamu kati na bobakisi.

Bimisa na lokasa