Masalisi mpo na Makomi
Emoniseli ya Yoane


Emoniseli ya Yoane

Buku ya nsuka kati na Boyokani ya Sika, oyo esalemi na emoniseli epesami na Apostolo Yoane. Apesamaki nzela ya komona mambi ya kala ya mokili, mingi mingi mikolo ya nsuka (Emon. 1:1–2; 1 Nef. 14:18–27; Mal&May 77). Emoniseli ya Yoane eyebani lisusu lokola Emoniseli.

Yoane azwaki emoniseli oyo etali mokolo ya Nkolo na esanga ya Patamo (Emon. 1:9–10), na kati ya mokili uta libongo ya Asia, mosika te uta na Efese. Mokolo ya sikisiki ya emoniseli yango eyebani te.

Bafungola mpo na kososola buku yango ezwami na 1 Nefi 14:18–27 mpe Malongi mpe Mayokani 77 (Etel. 4:15–16).

Mikapo 1–3 ezali boyingisi na buku mpe mikanda na baeklezia sambo na Asia. Yoane akomaki mikanda mpo na kosunga Basantu basilisa boko kokoso. Mikapo 4–5 mikomi mamoni oyo Yoane azwaki kolakisaka lokumu mpe nguya ya sembo ya Nzambe mpe ya Klisto. Na mikapo 6–9, 11, Yoane akomi ete amonaki buku moko ekangami na bilembo sambo, elembo na elembo kolimbolaka mibu nkoto ya mambi ya kala ya ntango ya mabele. Mikapo oyo etali yambo makambo ezwami kati na elembo ya sambo (tala Emon. 8–9; 11:1–15). Mokapo 10 molimboli buku oyo Yoane aliaki. Buku yango elimboli etinda oyo alingaki kosala na mikolo mikoya. Mokapo 12 mokomi limoni ya mabe oyo ebandaki na lola ntango Satana atombokaki mpe abenganamaki libanda. Etumba oyo ebandaki kuna ezali kokoba kobundama na mabele. Na mikapo 13, 17–19, Yoane alimboli bokonzi ebele ya nkuna na mabele oyo bakonzami na Satana mpe akomi makila na bango, kozwanaka mpe bobebisami ya mabe. Mikapo 14–16 milimboli bosembo ya Basantu na kati ya mabe kala mingi te liboso ya Boyei ya Mibale ya Klisto. Mikapo 20–22 milimboli Nkoto ya mibu, engumba kitoko ya Yelusaleme ya Sika, mpe makambo ya nsuka ya mambi ya kala ya mabele.

Bimisa na lokasa