Masalisi mpo na Makomi
Esetele


Esetele

Mwasi ya bondimi bonene mpe moto ya ntina monene kati na Buku ya Esetele.

Buku ya Esetele

Buku moko kati na Boyokani ya Kala oyo ezali na lisolo ya mpiko monene ya Mwasi mokonzi Esetele na kobikisaka bato na ye uta na ebomi.

Mikapo 1–2 eyebisi lolenge kani Esetele, mwasi moko Moyuda mpe mwana mwasi oyo bakomisaki mwana na mobali Moyuda moko na nkombo ya Moledekai, aponamaki lokola mokonzi ya Palasa mpo na bonzenga na ye. Mokapo 3 molimboli ete Hamana, moto likolo na ndako ya mokonzi, ayinaki Moledekai mpe azwaki mokano ya kotia Bayuda nyonso na liwa. Mikapo 4–10 eyebisi lolenge kani Esetele, kati na likama ya bomoi na ye moko, abimisaki bayi-mboka na ye na mokonzi mpe azwaki mbongwana ya mokano yango.

Bimisa na lokasa