Masalisi mpo na Makomi
Ejela


Ejela

Nganganzambe ya Boyokani ya Kala mpe mokomeli oyo azongisaki ndambo ya Bayuda na Yelusaleme uta na bokangemi ya Babiloni (Ejela 7–10; Nehem. 8; 12). Na mobu 458 Liboso na mbotama ya Klisto azwaka ndingisa uta na Aletahesaseta, mokonzi ya Palasa komema na Yelusaleme Moyuda mokangemi nyonso oyo azalaki na mposa ya kokende (Ejela 7:12–26).

Liboso ya ntango ya Ejela, banganganzambe bazalaki kotalela pene pene na nyonso ya botangi ya bosangisi ya makomi ekomama oyo ebiangamaki “mobeko.” Ejela asilisaki kotia makomi na bozwani ya Moyuda nyonso. Bofungwami ya botangi ya “buku ya mobeko” na nsuka ekomaki likambo ya ntina ya bomoi ya baye ya mboka Bayuda. Ntango mosusu mateya minene koleka ya Ejela mayaki uta na ndakisa na ye moko ya kolengelaka motema na ye mpo na koluka mobeko ya Nkolo, mpo na kotosa mwango, mpe mpo na koteya mwango na basusu (Ejela 7:10).

Buku ya Ejela

Mikapo 1–6 milimboli makambo oyo esalemaki uta mibu ntuku motoba kino ntuku mwambe liboso ete Ejela aya na Yelusaleme—mobeko ya Kulese na mobu 537 Liboso na mbotama ya Klisto mpe bozongi ya Bayuda na ntango ya Zelubabele. Mikapo 7–10 milakisi lolenge kani Ejela akendaki na Yelusaleme. Ye, mpe lingomba na ye, bakilaki mpe basambelaki mpo na kozwa bobateli. Na Yelusaleme bakutaki Bayuda mingi baye bazongaki na Yelusaleme na ebandeli na ntango ya Zelubabele mpe baye babalaki basi libanda ya liyokani mpe basilaki komikomisa mbindo. Ejela asambelaki mpo na bango mpe atiaki bango na nse ya liyokani mpo na koboma libala na basi baye wana. Mambi ya kala ya nsuka ya bomoi ya Ejela ezwami kati na buku ya Nehemia.

Bimisa na lokasa