Makomi
Boyingisi


Boyingisi

Liyaka ya Ntalo Monene ezali boponi ya mateya ya motuya monene mpe ya boponi oyo etali biteni mingi mpe ya ntina monene ya bondimi mpe malongi ya Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka. Makambo oyo ebongolamaki mpe ebimisamaki na Profeta Joseph Smith, mpe mingi ebimisamaki na nkoma kati na bazulunale ya Eklezia ya mikolo na ye.

Liboke ya yambo ya mateya oyo epesamaki nkombo ya Liyaka ya Ntalo Monene esalemaki na mobu 1851 na Mpaka Franklin D. Richards, oyo azalaki na ntango wana moko ya Lisanga ya Bazomi na mibale mpe mokambi ya Misio ya Angeletele. Ntina na liboke yango ezalaki ya kosala ete makomi ya motuya oyo ezalaki kotombola mingi te na ntango ya Joseph Smith emonana mpe ezwama mingi. Lokola bandimi ya Eklezia bazalaki se kokola bipayi nyonso na Mpoto mpe na Amerika, esengelaki ete mamonisama. Basalelaki Liyaka ya Ntalo Monene mpe nsima ekomaki buku endimama ya Eklezia na lisalisi ya Boyangeli ya Yambo mpe ya likita monene na Salt Lake City mokolo ya 10, sanza ya zomi ya mobu 1880.

Matangi ebele masili kosalema mpo na kotala malamu makambo nini ezali na kati lokola esengami na mposa ya Eklezia. Na mobu 1878 bandambo ya buku ya Mose oyo ezalaki te kati na emoniseli ya yambo ya buku ebakisamaki. Na mobu 1902 ndambo mosusu ya Liyaka ya Ntalo Monene oyo etiaki makomi mibale mibale mpe ebimisamaki na buku ya Malongi mpe Mayokani elongolamaki. Bobongisami kati na mikapo mpe milongo, elongo na makomi na nse ya lokasa, esalemaki na mobu 1902. Emoniseli ya buku oyo na nkasa ekabwana na ngambo mibale, na bobakisi, esalemaki na mobu 1921. Mbongwana esusu etiamaki te kino sanza ya minei ya mobu 1976, ntango makomi mosusu mibale ya emoniseli ebakisamaki. Na mobu 1979 makomami mibale oyo elongolamaki uta na Liyaka ya Ntalo Monene mpe etiamaki kati na buku ya Malongi mpe Mayokani, wapi ezali sikawa komonana lokola biteni 137 mpe 138. Na emoniseli boye ya sikawa boko mbongwana esalemaki mpo na koyokanisa oyo elandi na makomi ya yambo.

Oyo elandi ezali boyingisi na bokuse ya makambo ezali na kati:

  1. Maponi uta na Buku ya Mose. Litangi uta na buku ya Genese ya bobongoli ya Biblia na Joseph Smith, oyo ye abandaki na sanza ya motoba ya mobu 1830.

  2. Buku ya Abalayama. Bobongoli efulama ya nkoma ya Abalayama. Joseph Smith abandaki bobongoli yango na mobu 1835 nsima ya kozwa ndambo ya nkasa ya papilusi ya Baejipito. Bobongoli yango ebimisamaki na kati ya zulunale Times and Seasons kobimaka na molongo uta na mokolo 1, sanza ya misato ya mobu 1842, na Nauvoo, Illinois.

  3. Joseph Smith—Matai. Litangi uta na litatoli ya Matai na bobongoli ya Biblia na Joseph Smith (tala Malongi mpe Mayokani 45:60–61 mpo na oyo etali motindo ya Nzambe mpo na kobanda bobongoli ya Boyokani ya Sika).

  4. Joseph Smith—Mambi ya kala. Matangi uta na litatoli mpe mambi ya kala mandimama na bakambi oyo ye mpe bakomi na ye balengelaki na mobu 1838–1839 mpe oyo ebimisamaki na zulunale Times and Seasons kobimaka na molongo na Nauvoo, Illinois, banda na mokolo ya 15, sanza ya misato ya mobu 1842.

  5. Biteni ya Bondimi ya Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka. Maloba ya Joseph Smith oyo ebimisami na zulunale Times and Seasons mokolo ya yambo, sanza ya misato ya mobu 1842, elongo na bokuse ya mambi ya kala ya Eklezia oyo eyebanaki na bato nyonso lokola Mokanda epayi na Wentworth.

Bimisa na lokasa