2022
Biteni—ya Libula ya Bolendisi
Sanza ya zomi na moko 2022


Etinda ya Sanza ya Liahona Sanza ya zomi na moko 2022

Libula ya Bolendisi

Biteni

Elilingi
lokasa ya mpepo na elilingi ya mpepo

Lokola mama na ngai ayebisaki ngai ntango nazalaki komitungisa lolenge likambo ezalaki mpasi, “O, Ya, solo ezali mpasi. Esengelaki kozala bongo. Bomoi ezali momekano.”

Azalaki koloba yango na kimia nyonso, kutu koseka, mpo ete ayebaki makambo mibale. Kotalaka te mpasi, oyo ezalaki ntina ezalaki ya kozonga na ndako mpo na kobika elongo na Tata na ye ya Lola. Mpe ayebaki ete akokaki kosala yango bobele na nzela ya bondimi ya Mobikisi na ye. …

Libula ya bolendisi oyo atikaki mpo na biso elimbolami malamu na Moroni 7, epai wapi Mormon azali kolendisa mwana na ye Moroni mpe bato na ye. …

Atie Yesu Klisto na ebandeli, lokola baye banso balongaka na kopesaka bolendisi epai ya baye balukaka kotambola na nzela na bango ya ndako ya lola. …

Mormon azwaki boboto lokola bondimisi ya bokasi ya bondimi na bango. …

Nsima Mormon alendisi bango na kotatolaka ete bazali na nzela ya kozwa likabo ya mitema na bango oyo etondisami na bolingo ya peto ya Klisto. …

Kotalaka nsima, nayebi sikawa lolenge nini likabo yango ya bolingo—bolingo ya peto ya Klisto—elendisaki, ekambaki, esungaki, mpe ebongolaki mama na ngai na boluki na ye ya nzela ya ndako. …

… Mobikisi ayebi mitungisi na bino na mozindo. Ayebi makoki manene na bino ya kokola na bondimi, elikya, mpe bolingo.

Mitindo mpe mayokani Ye apesaka bino ezali bomekami te mpo na kotambwisa bino. Ezali likabo ya kotombola bino mpo na kozwa makabo nyonso ya Nzambe mpe kozonga na ndako epai ya Tata na bino ya Lola mpe Nkolo, oyo alingaka bino.

Bimisa na lokasa