2023
Bondimi na Yesu Klisto
Sanza ya minei 2023


“Bondimi na Yesu Klisto,” Liahona, Sanza ya minei 2023.

Etinda ya sanza Liahona Sanza ya minei 2023

Bondimi na Yesu Klisto

Elilingi
Elili ya Yesu

Yesu Klisto, na Harry Anderson

Kozalaka na bondimi na Yesu Klisto ezali mobeko ya yambo ya nsango malamu (tala Biteni ya Bondimi 1:4). Bondimi na biso ekosunga biso tosala maponi oyo ekotambwisa biso kozonga epai ya Tata na biso ya Lola. Tokoki kosala mpo na kolendisa bondimi na biso katikati na babomoi na biso.

Elilingi
bana mpe bilenge basangani nzinganzinga ya buku

Bondimi Ezali Nini?

Bondimi ezali kondima ya makasi to kolikya na eloko moko. Kozala na bondimi esangisi kolikya mpe kondimela makambo oyo ezali ya solo, atako ntango tokoki komona yango te mpe kososola yango na mobimba te (tala Baebele 11:1; Alma 32:21).

Elilingi
elilingi ya Yesu Klisto

Mambi uta Klisto mpe Elenge Mozwi Mosali Mibeko, na Heinrich Hofmann

Bondimi Kati na Yesu Klisto

Mpo na kotambwisama na libiki, bondimi na biso esengeli ekotisama na Yesu Klisto lokola Mobikisi mpe Mosikoli na biso. Kozakala na bondimi na Klisto elakisi kotyela Ye motema. Elingi koloba komipesa mobimba epai na Ye—kotya elikya na nguya, mayele, mpe bolingo na Ye. Yango esangisi lisusu kondimelaka mpe kolandaka mateya na Ye.

Elilingi
Babalani bazali koyekola makomi

Bokolisi Bondimi na Biso

Bondimi ezali likabo kowuta na Nzambe, kasi tosengeli koluka yango mpe kosala mpo na kobomba yango makasi. Tokoki kokolisa bondimi na biso na nzela ya losambo mpe boyekoli makomi mpe mateya ya baprofeta ba mikolo mya nsuka. Tokoki lisusu kokembisa bondimi na biso ntango tozali kobika na bosembo mpe kobomba ya biso mayokani.

Kobika na Bondimi

Bondimi ezali mingi koleka boyambi. Yango esangisi kosala na bondimi yango. Tolakisaka bondimi na biso na lolenge tozali kobika. Bondimi na Yesu Klisto ebengi biso tolanda ndakisa na Ye ya malamu koleka. Bondimi na biso ekomema biso totosa mibeko, toyambola masumu na biso, mpe tosala mpe tobomba mayokani.

Elilingi
Klisto azali kobikisa mokufi miso

Bondimi Ekoki Komema na Makamwisi

Bondimi ya solo ememaka makamwisi, oyo ekoki kosangisa mamoni, bandoto, mabiki, mpe makabo mosusu oyo eyei uta na Nzambe. Makomi etondi na masolo ebele ya bato oyo bayambaki makamwisi uta na Nkolo mpo na bondimi na bango epai na Ye. Tala “Likamwisi” na Bokambi na Makomi mpo na bandakisa ebele.

Bondimi Ekoki Komema Kimya

Kozalaka na bondimi na Nzambe mpe na ya Ye mwango ya libiki ekoki kokembisa biso katikati ya mikakatano. Bondimi ekoki kopesa biso makasi ya kokende liboso mpe kotelema liboso ya mimekano na biso na mpiko. Atako ntango lobi emonani ya koyebana te, bondimi na biso na Mobikisi ekoki kopesa biso kimya.

Elilingi
tata asimbi mwana na ye wana bazali kotala elilingi ya Yesu

Bondimi na Yesu Klisto ekomema biso na Libiki na biso.

Kosalelaka bondimi na Yesu Klisto ekomema biso na libiki. Klisto abongisaki nzela mpo na biso tozwa bomoi ya seko. Ntango tozali kobika na nzela ya bondimi na biso, tokoki kolimbisama na masumu na biso mpe kozonga kozala elongo na Nzambe lisusu.

Bimisa na lokasa