2023
Mateya ya Yesu Klisto
Sanza ya Mitano 2023


Etinda ya sanza Liahona Sanza ya Mitano 2023

Mateya ya Yesu Klisto

Biteni

Elilingi
lokasa epakolama langi

Lokola profeta Nefi ateyaki biso, tosengeli “kokila bilei mpo na maloba ya Klisto; mpo ete tala maloba ya Klisto ekoyebisa bino makambo nionso nini bino bosengeli kosala.”1 … Nsango na ngai lelo ezali ya liboke ya maloba ya Mobikisi na biso—maye Ye alobaki. …

“[Motindo monene na kati ya mobeko ezali:] okolinga Nkolo Nzambe na yo na motema na yo mobimba, mpe na molimo na yo mobimba, mpe na makanisi na yo nyonso.

“Oyo ezali mobeko ya yambo mpe ya monene.

“Mosusu na mibale ezali mpe lokola yango ete, Okolinga mozalani na yo lokola yo moko.

“Likolo ya mitindo mibale oyo makangisi mobeko mpe baprofeta nyonso.”2 …

“Solo, solo, nalobi epayi ya bino, bosengeli kokengela mpe kosambela ntango inso, mbele bosenginiama na zabulu, mpe bokambema mosika bakangemi ba ye.”3 …

“Na yango, oyo nionso bino bokosala, bokosala yango na nkombo na ngai; na yango bokobenga eklezia na nkombo na ngai.”4 …

“Sikawa oyo ezali motindo: Boyambola, bino banso nsuka ya mabele, mpe boya epayi ya ngai, mpe bobatisama o nkombo ya ngai, ete bokoka kosantisama na bozwi bwa Molimo Mosantu, ete bokoka koteleme na bozangi mbindo liboso lya ngai o mokolo mwa nsuka.”5 …

Tondimelaka Klisto. Nasukisi na oyo Ye alobaki etali lolenge nini tosengeli koyeba mpe kolanda mateya na Ye:

“Kasi Molendisi, oyo azali Molimo Mosantu, oyo Tata akotinda na nkombo na ngai, akoteya bino makambo manso, mpe akomema makambo manso mpo na bokundoli bwa bino, ezali nini nalobelaki bino.”6

Bimisa na lokasa