Liahona
Esengo ya Seko ya Bomoi ya Nsango Malamu
Sanza ya Mibale 2024


“Esengo ya Seko ya Bomoi ya Nsango Malamu,” Liahona, Sanza ya Mibale 2024.

Etinda mpo na Liahona, Sanza ya Mibale 2024

Esengo ya Seko ya Bomoi ya Nsango Malamu

Esengo ya koyika mpiko eyaka na koyika mpiko na nsango malamu ya Yesu Klisto mpe kosalisa basusu basala ndenge moko.

Elilingi
Adama mpe Eva na Elanga ya Edene na nsima

Elanga ya Edene, na Grant Romney Clawson; Kotika Elanga ya Edene, na Joseph Brickey

Emoniseli ya mokuse ya ntina ya bomoi na biso ekoki kozwama na mateya ya esakoli ya Lehi na ntina ya ebandeli ya bomoi ya moto awa na mabele. Na kati ya Elanga ya Edene, Adama mpe Eva bazalaki na bozali ya bozangi boyebi. Yango wana balingaki kotikala o bozali bwa bozangi boyebi, kozalaka na bosepeli te, mpo bayebaki bobola te; kosalaka bolamu te, mpo bayebaki lisumu te” (2 Nefi 2:23). Na yango, lokola Lehi alimbolaki, “Adama akweyaki ete bato bakoka kozala; mpe bato bazali, mpo basepela” (2 Nefi 2:25; tala lisusu Mose 5:10–11).

Ntango tozali kokola na mokili oyo ekweyi, toyekolaka bokeseni kati na malamu mpe mabe na oyo toteyami mpe na oyo tozali kokutana na yango. “Tomekaka oyo ya bololo, mpo [toyeba] kopesa motuya na oyo ya malamu” (Mose 6:55). Esengo eyaka ntango tozali koboya makambo ya bololo mpe tozali kolinga mingi mpe kokangama makasi na malamu.

Kozwa Esengo

Na ntina ya bolingo na Ye ya kobonga nie mpo na biso, Tata na biso ya Lola azali na mposa makasi ya kokabola esengo na Ye ya kobonga nie elongo na biso, ezala sikawa mpe na seko. Yango ezalaki botindiki na Ye na makambo nyonso uta ebandeli, bakisa mpe mwango na Ye ya nkembo mpe libonza ya Mwana na Ye ya Mobali Mobotami se Moko mpo na kosikola biso.

Nzambe amekaka te kopusa biso na makasi ete tozala na esengo to bosepeli, kasi ateyaka biso lolenge ya kozwa yango. Ayebisi biso mpe epai wapi esengo ekoki kozwama te​—“mabe [ezali te mpe] ezalaki esengo ata mokolo moko te” (Alma 41:10). Ezali na nzela ya mitindo na Ye nde Tata na biso ya Lola amonisaka biso nzela ya esengo.

Mokambi Russell M. Nelson alakisi yango na lolenge oyo:

“Kasi tala bosolo monene: ntango mokili ezali kolobela ete nguya, bozwi, boyebani, mpe bosepeli ya mosuni ememaka esengo, ememaka te! Ekoki te! Maye esalaka ezali eloko moko te kasi mokitani ya mpamba mpo na ‘bozali ya bopambolami mpe bwa bosepeli bwa [baoyo] babateli mitindo mya Nzambe’ [Moziya 2:41].

“Bosolo ezali ete ezali mpenza botau mingi mpo na koluka esengo epai bokoki mokolo moko te kozwa yango! Nzokande, ntango omikangi yomei na Yesu Klisto mpe osali mosala ya molimo oyo esengeli mpo na kolonga mokili, Ye, mpe Ye moko, azali mpenza na nguya ya kotombola yo likolo ya bobendi ya mokili oyo.”1

Na boye, esengo ya seko ezwami na kobatelaka mitindo ya Nzambe, mpe mitindo ya Nzambe ezwami na nsango malamu ya Yesu Klisto. Kasi yango ezali liponi na biso. Soki na botau na biso tolongi te mpo na mwa ntango mpo na kobatela mitindo, tokoki kobongwana, koboya makambo ya bololo, mpe kolanda lisusu makambo ya malamu. Bolingo ya Nzambe ezali kolimbisa masumu te—yango ekozala mawa koyiba bosembo—kasi na nzela ya Bomikabi na Ye, Yesu Klisto apesi bosikoli uta na masumu:

“Amuleki … alobaki … ete Nkolo solo akoya mpo ya kosikola bato ba ye, kasi akoya te mpo kosikola bango o masumu ma bango, kasi mpo ya kosikola bango uta o masumu ma bango.

“Mpe azali na nguya epesami epai ya ye uta na Tata mpo ya kosikola bango uta o masumu ma bango na ntina ya boyamboli; yango wana atindi banzelu ba ye mpo ya kosakola nsango ya masengeli ma boyamboli, boye bomemi epai ya nguya ya Mosikoli, epai ya lobiko la bozo bwa bango” (Elamani 5:10–11; nsete ebakisami).

Yesu alobaki:

“Soki bobateli mitindo na ngai, bosengeli kozala kati na bolingo na ngai; atako ntango nabatelaki mitindo ya Tata na ngai, mpe kozala kati na bolingo na ye.

“Makambo oyo nalobi na bino, ete esengo na ngai etikala kati na bino, mpe ete esengo na bino ezala mobimba” (Yoane 15:10–11).

Yango nde Lehi ayokaki na ndoto na ye ntango amekaki mbuma ya nzete ya bomoi—oyo emonisi bolingo ya Nzambe. Alobaki, “Mpe lokola eliaki ngai mbuma na yango, etondisaki molimo na ngai na esengo monene mpenza” (1 Nefi 8:12; tala lisusu 11:21–23).

Lehi amonisaki lisusu lolenge ya Mibale tokoki komema esengo na bomoi na biso ntango alobaki, “Yango wana, nabandaki kozala na mposa ete libota na ngai elia [mbuma] lokola” (1 Nefi 8:12).

Elilingi
loboko moko ezali kolekisa mbuma na loboko mosusu, na nzete na nsima

Nzete ya Bomoi, na Kazuto Uota

Kosalisa Basusu Kozwa Esengo

Lokola bato ya Mokonzi Benyamina, tozali ya “kotondisama na esengo” ntango tozwi bolimbisi ya masumu na biso mpe tozwi “kimia na makanisi.”(Moziya 4:3). Toyokaka yango lisusu ntango totali libanda mpe toluki kosalisa bai libota mpe basusu bazwa esengo mpe kimia se moko kaka.

Lokola elenge mobali, Alma alukaki esengo na makambo nyonso oyo ezalaki kotelemela nsango malamu ya Yesu Klisto. Nsima ya kopamelama na anzelu, alongwaki mosika na “ya bololo” kino na “malamu” na boyamboli “pene na liwa” (Moziya 27:28) mpe ngolu ebele ya Mobikisi. Bambula nsima, Alma na esengo nyonso alobaki na mwana mobali wa ye Elamani:

“Mpe o, bosepeli kani, mpe mwinda mwa bokamwi kani namonoki; iyo, bozo bwa ngai botondaki na bosepeli boluti lokola ezalaki bolozi bwa ngai! …

“Iyo, mpe uta ntango ena kutu kina sikawa, nasali na kolembe te, ete nakoka komeme babozo epai ya boyamboli; ete nakoka komeme bango na komeka bosepeli boluti boye namekaki. …

“Iyo, mpe sikawa tala, O mwana mobali wa ngai, Nkolo apesi ngai bosepeli mpenza na mbuma ya misala mya ngai;

“Mpo na ntina ya liloba [nsango malamu ya Yesu Klisto] akabaki epai ya ngai, tala, mingi babotami na Nzambe, mpe bameki lokola namekaki” (Alma 36:20, 24–26).

Na libaku mosusu, Alma atatolaki:

“Eye ezali nkembo ya ngai, ete mbele nakoka kozala esalele yoko o maboko ma Nzambe mpo ya komeme yoko bozo o bobongoli bwa mitema; mpe eye ezali esengo bwa ngai.

“Mpe tala, emoni ngai mingi ya bandeko ba ngai bayamboli ba solo, mpe koyaka na Nkolo Nzambe wa bango, nde etondi bozo bwa ngai na bosepeli” (Alma 29:9–10).

Alma akobaki kosakola esengo ya koleka oyo ayokaki ntango basusu balongaki na komema milimo epai ya Klisto:

“Kasi nasepeli te bobele na nkonzo ya ngaimei, kasi bosepeli bwa ngai botondi mingi koleka na ntina ya nkonzo ya bandeko ba ngai [bana mibali ba Moziya], baye bamataki o mboka ya Nefi.

“Tala, basali mpenza, mpe baboti mbuma nzike; mpe boniboni enene ekozala mbano ya bango!

“Sikawa, ekanisi ngai nkonzo ya bandeko baye ba ngai bozo bwa ngai bomememi mosika, kutu mpo ya bokaboli bwa bango uta na nzoto, lokola soko ezalaki, boye enene ezali bosepeli bwa ngai” (Alma 29:14–16).

Tokoki kozwa esengo se moko wana ntango tolingi basusu na bolingo ya “peto ya Klisto” (Moroni 7:47; tala lisusu molongo 48), kabola bosolo ezongisamaki na bango, mpe bengisa bango kosangana na bato ya elaka.

Elilingi
Mobikisi kati na Getesemane

O Tata na Ngai, na Simon Dewey

Esengo kati na Bolozi

Tosengeli kobanga te ete mimekano mpe mikakatano tokutanaka na yango kozanga kopengola na bokufi ekopekisa to ekobebisa esengo na biso. Alma azalaki moko oyo mosala na ye ya kozanga moyimi mpo na basusu esengaki ye mbongo mingi. Anyokwamaki na boloko, awumelaki mingi na nzala mpe mposa ya mai, babetaki ye, babangisaki ye mpo na bomoi na ye, mpe batyolaki ye mbala na mbala mpe baboyaki ye. Mpe atako bongo, nyonso “emelamaki na esengo ya Klisto” (Alma 31:38). Mbala mosusu mpasi ya Alma esalaki esengo oyo elandaki lisusu monene koleka.

Mokambi Nelson akundolisi biso ete esengo esalaki mosala moko na mpasi ya Mobikisi—“oyo mpo na esengo oyo etiamaki liboso na ye [A]yikelaki ekulusu mpiko” (Baebele 12:2).

“Kanisa yango! Mpo ete Ye ayikaki mpiko na likambo ya mpasi mingi etielama naino mpiko na mabele te, mobikisi na biso ayekamaki na esengo!

“Mpe nini ezalaki esengo oyo etiamaki liboso na Ye? Solo ezalaki na esengo ya kosukola, kobikisa, mpe kolendisa biso; esengo ya kofutaka mpo na masumu ya banso oyo bakoyambola; esengo ya kosalaka ete bino mpe ngai tozonga ndako—ya kosukwama mpe ya kolongobana—mpo na kozala na bomoi elongo na ya biso Baboti ya Lola mpe mabota.

“Soki toyekami na esengo oyo ekoyela biso, to na baye tolingaka, nini ekoki biso koyika mpiko sikawa ezali komonana lokola ya bozito, bolozi, kobangisa, mabe, to na pete ekoki kosalama te?”2

Esengo ya koyika mpiko eyaka na koyika mpiko na nsango malamu ya Yesu Klisto mpe kosalisa basusu basala ndenge moko. Esengo ya koumela eyaka ntango tofandi na bolingo ya Nzambe, kotosaka mitindo na Ye mpe kozwaka ngolu ya Mobikisi. Na nzela ya nsango malamu, ezali na esengo na mobembo lokola mpe esengo na nsuka. Nsango malamu ya Yesu Klisto ezali nzela ya esengo ya mokolo na mokolo.

Bimisa na lokasa