Liahona
Tobiangami mpo na Kosala Bolamu
Sanza ya Motoba 2024


“Tobiangami mpo na Kosala Bolamu,” Liahona, Sanza ya Motoba 2024.

Etinda ya Sanza ya Liahona Sanza ya Motoba 2024

Tobiangami mpo na Kosala Bolamu

Tozali kotonga bokonzi ya Nzambe ntango tozali kosalela basusu, kotombola pole na biso, mpe kotelema mpo na bonsomi ya losambo.

Gideona ayebaki mateya ya lokuta ntango ayokaki yango. Ayokaki yango yambo kouta na Mokonzi Noa mpe banganganzambe na ye—banganganzambe oyo “bakolisamaki na lolendo ya mitema na bango” mpe oyo “bazalaki kosimbama na goigoi na bango, na losambo na bango ya bikeko, mpe na pite na bango, na mpako oyo mokonzi Noa atyaki likoló ya bato na ye”(Mosiya 11:5–6).

Mabe koleka, Mokonzi Noa amemaki profeta Abinadi na liwa mpe alukaki koboma Alma mpe bandimi na ye (tala Mosiya 17; 18:33–34). Mpo na kosukisa nkuna ya lolenge wana Gideona alapaki ndai ete akopekisa mokonzi, oyo abikisaki ye kaka na ntina ya botangi ya Balamani (tala Mosiya 19:4–8).

Na nsima, Gideona na lolenge ya malamu apamelaki banganganzambe ya Noa ndenge bakangaki bana basi 24 ya Balamani. Amonaki ete lisakoli ya Abinadi mpo na bato ekokisamaki mpamba te bango baboyaki koyambola. (Tala Mosiya 20:17–22.) Ye asalisaki na kokangola bato ya Limhi, baoyo bazalaki na bowumbu ya balamani (tala Mosiya 22:3–9).

Sikawa mokolo, Gideona akutanaki lisusu na lolendo mpe nkuna wana atelemaki liboso ya Nehor, oyo akotisaki bonganganzambe kati na bato. Nehor azalaki “kotelemela lingomba” mpe komeka kokamba bato na libungi. (Tala Alma 1: 3, 7, 12; tala lisusu 2 Nefi 26:29.)

Kosalelaka liloba ya Nzambe lokola ebundeli na ye, Gideona, mobali ya mpiko, apamelaki Nahor mpo na nkuna na ye. Na nkanda makasi, Nehor abundisaki mpe abomaki Gideona na mopanga na ye. (Tala Alma 1:7–9.) Bongo, esukaki mikolo ya “moto ya sembo” oyo asalaki bolamu mingi o ntei ya bato oyo” (Alma 1:13).

Miloko mya nsuka oyo tozali kobika epesi biso mabaku mingi ya komekola Gideona lokola “eloko ya mosala na maboko ya Nzambe” (Alma 1:8) na kozalaka “na mosala” (Mosiya 22:4) mpo na basusu, kotelema mpo na bosembo, mpe kotelemela makama mpo na bonsomi na biso ya kosambela mpe kosalela Nzambe. Ntango tozali kolanda ndakisa ya sembo ya Gideona, tokoki mpe lisusu kosala malamu mingi.

Elilingi
mwasi na sani ya bilei atelemi pene ya mwasi moko alali na mbeto

Bomoko kati na Mosala

“Lokola balandi [ya Mobikisi], tolukaka kolinga Nzambe mpe bazalani na biso kati na mokili mobimba,”elobaki Bokambi ya Yambo. “Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka ezali eklezia azali na mposa makasi ya kopambola basusu mpe kosalisa baoyo bazali na bosenga. Topambolami mpo na kozala na makoki, makoki, mpe boyokani ya mokili mobimba ya kotyela motema mpo na kokokisa mokumba oyo ya bule.”1

Nazali na matondo mingi mpo na mosala ezanga moimi mpe lisalisi oyo bandimi ya Eklezia bazali kopesa kati na batempelo na biso mpe na bapalwasi, bitape, mpe matuka. Nazali lisusu na matondo ete bandimi ya Eklezia basalaka na ebele ya bibongiseli ya lisanga, ya mateya, mpe ya bolingo malamu mpe ete bamipesaka na bankoto ya misala ya bosungi bato mbula na mbula, kopesaka bolingi na bamilio ya bangonga na pene na bikolo mpe bateritware 200.2

Nzela moko Eklezia apanzi mabaku ya mosala na bikolo mingi ezali na nzela ya JustServe.org. Esungami na Eklezia kasi ekoki kozwama na moto nyonso oyo alingi kopambola basusu, JustServe.org “ekangisaka bamposa ya bavolontaires ya lisanga na bavolontaires” oyo “batomboli lolenge ya bomoi na lisanga.”3

Lisusu Eklezia na bandimi na yango basanganaka lisanga elongo na mabongisi ya masalisi kati na mokili mobimba. Eklezia, na nzela ya bandimi na yango, ezalaki “mosungi monene koleka na bokongoli makila etambwisamaki na Croix -Rouge na 2022.” Na kobakisa, Eklezia kala mingi te apesaki likabo ya bankoto $8.7 ya dollars na Croix-Rouge.4

Eklezia esanganaki lisusu na mabongisi mpo na komema projet ya kopetola mayi mpe kopetola esika na bisika mingi kati na mokili. Kati na 2022 Eklezia esanganaki na baprojet 156 ya lolenge wana.5 Tosalaka lisusu elongo mpe kopesaka makabo na bibongiseli misusu oyo ememaka lisungi na bana ya Nzambe oyo bazali konyokwama.6

“Ntango tosangisaka maboko mpo na kosalisa bato kati na bosenga,” elobaki Mokambi Henry B. Eyring, Mopesi Toli ya Mibale ya Bokambi ya Yambo, “Nkolo asangisaka mitema na biso.”7

Elilingi
maboko ekangama lokola kopo na pole ya moyi.

Bosimba Mwinda na Bino

Lokola bayekoli ya Mobikisi, topambolaka lisusu bazalani na biso ntango tozali kobatela mayokani mpe kokamba bomoi lokola ya Klisto. Buku ya Mormon eteyi ete “bato ya eklezia” basengeli kaka te kopona bosembo kasi lisusu kotika mingongo na bango ya bosembo eyokana soki balingi ete nkolo abatela mpe afulukisa bango (tala Alma 2:3–7; tala lisusu Mosiya 29:27). Nkolo azelaka biso tokabola kondima na biso mpe bindimeli mpe kotombola pole na biso “Tala nazali mwinda oyo bosengeli kosimba” (3 Nefi 18:24).

“Tokosalela Mobikisi na biso malamu te soki tobangi moto koleka Nzambe,” elobaki Mokambi Dallin H. Oaks, Mopesi Toli ya Yambo na Bokambi ya Yambo. Ye abakisaki, “Tobengamaki mpo na kotonga bizalela ya Nkolo, Kolanda ya mokili te”8

Ezala na kelasi, na mosala, to na lisano, na konje, na bokutani ya bolingo, to na internet, bayekoli ya Nkolo “bayokaka nsoni te mpo na kozwa nkombo ya Klisto likolo na bango” (Alma 46:21). Na nzela ya maloba mpe misala na biso, totatoli ete Nzambe azali na bomoi mpe ete tolandaka mwana na Ye.

“Kondima na biso ekatana eteni na eteni te , to esengeli te ezala bongo. Kondima ezali kaka mpo na eklezia te, ezali kaka mpo na ndako te, ezali kaka te mpo na [kelasi],” emonaki Paul Lambert, mosantu moko ya Bamikolo mya nsuka ayebi mingi makambo ya mangomba. “Ezali mpo na biloko nyonso oyo asali.”9

Toyebi te botindiki litatoli na biso, ndakisa malamu, mpe bamposa malamu ekoki kozala na yango likolo na basusu. Kasi ntango totelemi mpo na sembo mpe tosimbi pole ya Mobikisi, bato bakomona biso mpe lola ekosimba misisa mpo na biso.

Elilingi
mwasi atelemi libanda ya tempelo

Telema mpo na Bonsomi ya Boyambi

Bonganganzambe ya lelo, na bofuluki ya masanga ya mokili oyo ezali se kotelemela bato ya bondimi, ekeseni mpenza te na oyo ya ntango ya Buku ya Mormon. Mongongo ya baoyo bazali kotelemela mokumba monene ya mangomba na bisika ya bato nyonso mpe na makambo ya politiki ezali kokoma makasi. Baye mokili mpe mbulamatadi, kosangisa na biteyelo ya mike mpe biteyelo minene, bazali kotinda bato basala makambo na makasi mpe bazali koteya kindumba, koboya ete Nzambe azali, mpe bonsomi ya bolamu na ndenge ya moto na moto.

Kobundisa bonsomi ya boyambi , mpe kutu ekozala bisomei soko totelemi ngbi te o bondimi bwa Klisto. Lokola eklezia,” Nateyaki kala mingi te, “tosanganaka elongo na biyamba mosusu kobatelaka bato ya boyambi mpe bindimela nyonso mpe makoki na bango ya kolobela bindimela na bango.”10

Etumba moko na likolo ebundamaki likolo ya kopona bizaleli malamu​—bonsomi na biso ya kopona. Mpo na kobatela bonsomi na biso ya kopona esengeli ete tozala na molende na kobatela bonsomi na biso ya bayambi.

Kondima makasi ya biyamba elendisaka mpe ebatelaka mabota, masanga, mpe bikolo. Ebotaka botosi na mobeko, kokotisa limemya mpo na bomoi mpe biloko, mpe eteyaka bolingani, bosembo, mpe bopeto—bizaleli malamu oyo esengelami mpo na kokoba lisanga ya bosembo, ya bonsomi, mpe ya bana mboka. Tosengeli soko moke te kosenga bolimbisi mpo na kondima na biso.

Bokasi ya bamisionele na biso, mosala na biso mpo na bawei na batempelo, bokasi na biso mpo na kotonga bokonzi ya Nzambe, mpe esengo na biso mpenza esengi ete totelema mpo na bondimi ya biyamba mpe bonsomi ya biyamba. Tokoki kobungisa bonsomi oyo te kozanga kobungisa babonsomi misusu.

Profeta Joseph Smith ateyaki, “Ezali bolingo ya bonsomi oyo efuli molimo na ngai—bonsomi ya moto mpe ya boyambi mpo na bato ya langi nyonso ya loposo.”5 Bonsomi ya boyambi ekofula milimo na biso ntango tozali kolanda toli uta na bakambi ya Eklezia:

  • “Bozala koyeba na ntina ya makambo oyo ezali na ntina mingi mpo na bato nyonso, mpe na nsima boloba na mpiko mpe na bonkonde.”12

  • “Boyeba ete bobebisi bonsomi ya bondimi ekopusa mingi mabaku na biso ya kokola na bokasi mpe boyebi ya nsango malamu, kopambolama na makuli ya bule, mpe kotia motema na Nkolo mpo na kokamba Eklezia na Ye.”13

  • “Botelema mpe bonganga makasi mpo na kondimisa ete Nzambe azali mpe ete ezali na basolo oyo mibeko na ye etye.”14

  • “Kotelemela mibeko oyo ekobebisa bonsomi na biso ya kosalela bindimeli na biso.”15

  • “Bokende na mokili kosala bolamu, kotonga kondima na Nzambe ya Nguya Nyonso, mpe kosalisa na komema basusu na esika ya esengo makasi.”16

  • Esika ya boyekoli religiousfreedom.ChurchofJesusChrist.org mpe na religiousfreedomlibrary.org/documents.

Totongaka bokonzi ya Nzambe ntango tozali kosalela, kotombola pole na biso, mpe kotelema mpo na bonsomi ya boyambi. Tika Nkolo apambola biso mpo na babokasi na biso ya kosala “bolamu mingi” kati na mabota na biso, masanga, mpe bikolo.

Matangi

  1. “Nsango euti na Bokambi ya Yambo,” in Caring for Those in Need: 2022 Annual Report of The Church of Jesus Christ of Latter-day Saints, 3, ChurchofJesusChrist.org.

  2. Tala Caring for Those in Need: 2022 Annual Report, 4, ChurchofJesusChrist.org.

  3. Justserve.org/about. JustServe ezali kosala kati na 17 bikolo. Bankoto ya bato mpe mabongisi mazali kopambolama na nzela ya mayele oyo.

  4. Tala Kaitlyn Bancroft, “Eklezia epesaki nkoto 8.7 ya dollars lokola ndambo ya boyokani na Croix-Rouge,” Church News, Sanza ya Minei 22, 2023, 23.

  5. Tala Mary Richards, “Eklezia Esangani na Masanga na Mokili mobimba mpo na Kozwa Likabo ya Mai,” Church News, Sanza ya Mitano 27, 2023, 12.

  6. Tala Dallin H. Oaks, “Helping the Poor and Distressed,” LiahonaSanza ya Zomi na Moko 2022, 6–8.

  7. Henry B. Eyring, “Opportunities to Do Good,” Liahona, Sanza ya Mitano 2011, 25.

  8. Dallin H. Oaks, “Unselfish Service,” Liahona,, Sanza ya Mitano 2009, 94, 95.

  9. Paul Lambert, kati na Rachel Sterzer Gibson, “Why Is There a Need for Faith in the Workplace?” Church News,Sanza ya Yambo. 22, 2023, 16.

  10. Ronald A. Rasband, “To Heal the World,” Liahona, Sanza ya Mitano 2022, 92.

  11. Teachings of Presidents of the Church: Joseph Smith (2011), 345.

  12. D. Todd Christofferson, “Religious Freedom—A Cherished Heritage to Defend” (address at Freedom Festival Patriotic Service, Provo, Utah, June 26, 2016), 5–6, speeches.byu.edu.

  13. Ronald A. Rasband, “Free to Choose” (Brigham Young University devotional, Jan. 21, 2020), 3, speeches.byu.edu.

  14. Dallin H. Oaks, “Truth and Tolerance” (Brigham Young University devotional, Sept. 11, 2011), 2, speeches.byu.edu.

  15. Dallin H. Oaks, “Truth and Tolerance,” 4.

  16. Ronald A. Rasband, “Free to Choose,” 5, speeches.byu.edu.

Bimisa na lokasa