Liahona
Mosala Monene ya Nkolo mpe Libaku Monene ya Biso
Sanza ya Nsambo 2024


“Mosala Monene ya Nkolo mpe Libaku Monene ya Biso,” Liahona, Sanza ya Nsambo 2024.

Etinda ya Sanza ya Liahona, Sanza ya Nsambo 2024

Mosala Monene ya Nkolo mpe Libaku Monene ya Biso

Ntango tozali kolinga, kokabola, mpe kobengisa, tozali kosala elongo na Nkolo mpo na kosunga molimo mokomoko ya talo eya epayi na Ye.

Elilingi
basi mibale bazali kosolola ndenge bazali kotambola na nzela.

Profeta moko na moko ya eleko monene oyo ya nsuka ateyaki bandimi ya Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka bakabola nsango malamu ezongisama ya Yesu Klisto. Na bomoi na ngai mobimba, bandakisa ebele eyaka na makanisi:

Mokambi David O. McKay (1873–1970), profeta ya bolenge na ngai, alobaki, “Mondimi nyonso azali misionele.”

Mokambi Spencer W. Kimball (1895–1985) ateyaki, “Mokolo mpo na komema nsango malamu na bisika nyonso mpe bato nyonso ezali awa mpe sikawa,” mpe “tosengeli kosembola makolo na biso” na bokaboli nsango malamu na basusu.

Mokambi Gordon B. Hinckley (1910–2008) alobaki: “Mosala na biso ezali monene, mokumba na biso ezali mbinga na kosungaka mpo na koluka baye ya koteya. Nkolo apesi biso mosala ya koteya nsango malamu na ekelamu nyonso. Yango ekosenga makasi [na biso] koleka mpenza.”

Mpe Mokambi Russell M. Nelson asili koteya: “Mosala ya misionele ezali eteni moko ya ntina na bosangisi ya Yisalaele. Bosangisi wana ezali mosala moko ya ntina koleka oyo ezali kosalema na mokili lelo. Eloko moko te ya kokokanisa na bonene na yango. Eloko moko te ya kokokanisa na motuya. Bamisionele ya Nkolo—bayekoli na Ye—bamipesi na mokumba monene, na ntina monene, na mosala monene na mabele lelo.”

Nayaki koyeba yango na ngai moko lokola misionele ya elenge na Misio ya Grande-Bretagne. Nazali kutu kondimisama mingi koleka na yango lelo oyo. Lokola Apostolo ya Nkolo Yesu Klisto, Natatoli ete mabaku ezali esika nyonso mpo na kosunga basusu baya epayi ya Klisto na kolakisaka bolingo na biso, bokaboli bondimi na biso, mpe kobenga bango kosangana elongo na biso mpo na komona esengo ya nsango malamu ya Yesu Klisto.

Mosala Ezali Kokende Liboso

Nazuaki ngolu ya kosala na Bilo ya Misio ya Eklezia ntango ya bobimisi ya yambo ya Teya Nsango Malamu na Ngai ekotisamaki na 2004, mpe lisusu ntango bobimisi ya mibale ebimisamaki na 2023. Nandimi ete Teya Nsango Malamu na Ngai epamboli mosala ya misionele na lolenge ya mozindo.

Teya Nsango Malamu na Ngai ya sika esangisi makambo nyonso toyekolaki kobanda 2004, botambwisi efulamaki uta na mondimi moko na moko ya Bokambi ya Yambo mpe Lisanga Likoki ya Bapostolo Zomi na Mibale, mpe bambongwana esalamaki mpo na bokaboli nsango malamu na eleko ya interneti. Mingi ya bambongwana yango epesaki bofuluki ya ntina.

Toyaki komona ete bokaboli ya nsango malamu na ndenge ya pete, momesano, mpe ya bomoto na nzela ya mibeko ya “bolingo, bokaboli, bobengi” ezali kopambola makasi bokonzi. Yesu Klisto akabolaki nsango malamu lolenge oyo ntango Ye azalaki na mabele. Akabolaki bomoi na Ye mpe bolingo na Ye mpe abengaki banso baya epayi na Ye (tala Matai 11:28). Mpo na kolinga, kokabola, mpe kobenga lokola Ye asalaki ezali lipamboli mpe mokumba ya ntina monene mpo na mondimi nyonso ya Eklezia.

Bobanda na Bolingo

Na elanga ya Getesemane mpe likolo ya ekulusu, Yesu Klisto azuaki likolo na Ye masumu ya mokili mpe anyokwamaki na bolozi mpe “mpasi mpe matungisi mpe masenginya ya ndenge na ndenge” (Alma 7:11). Yango “esalaki ete [Ye], … oyo aleki banso na monene, alenga mpo na mpasi, mpe atangisa makila na lidusu moko moko ya mposo” (Malongi mpe Mayokani 19:18). Na nzela ya Bomikabi mpe Lisekwa na Ye, Yesu Klisto asalaki ete libiki mpe bonetoli ekokisama mpo na banso.

Kotala epayi ya Mobikisi mpe kokundolaka nyonso Ye asalaki mpo na biso ekelaka kati na biso motema moko etondisami na bolingo mpo na Ye. Boye abalusi mitema na biso epai ya basusu mpe atindi biso tolinga bango (tala Yoane 13:34–35) mpe kokabola nsango malamu na Ye elongo na bango (tala Matai 28:19; Malako 16:15). Soki baye nzinganzinga na biso bakoki koyoka ete tolingi bango mpe tomitungisaka mpo na bango mpenza, bakofungola mpenza mitema na bango na maloba na biso, lokola kaka Mokonzi Lamoni afungolaki motema na ye mpo na koyamba nsango malamu mpo na bolingo mpe mosala ya Ammon (tala Alma 17–19).

Ntango tozali kokabola nsango malamu, tika biso tobandaka elongo na bolingo. Ntango tokeyi epayi ya basusu na bolingo—kokundolaka ete bango bazali bandeko na biso ya basi mpe ya mibali mpe bana ya bolingo ya Tata na biso ya Lola—mabaku ekofungwama mpo na biso po na kokabola oyo biso toyebi kozala ya solo.

Mipesa Makasi mpe Kabola

Moto moko te amipesa koleka na bokaboli nsango malamu koleka Mokambi M. Russell Ballard (1928–2023). Na liloba na ye ya nsuka na likita linene, atatolaki, “Moko ya makambo ya nkembo mpe ya kokamwa mingi oyo moto nyonso na mokili oyo akoki koyeba [ezali] ete Tata na biso ya Lola mpe Nkolo Yesu Klisto Bamimonisaki na mokolo oyo ya nsuka mpe ete Joseph [Smith] atelemisamaki mpo na kozongisa litondi ya nsango malamu ya seko ya Yesu Klisto.”

Katikati na bomoi na ye, mpe katikati ya mokili mobimba, Mokambi Ballard azalaki komipesa makasi na bokaboli nsango oyo ya motuya elongo na moto nyonso. Alendisaki biso mpo tosala lolenge moko. Ateyaki ete tozali kokabola nsango malamu “na kozalaka bazalani malamu mpe na komemaka mpe kolakisa bolingo.” Na kosalaka bongo, to “ngengisi nsango malamu na bomoi na biso moko, mpe tongengisi epayi ya [basusu] mapamboli oyo nsango malamu epesaka.” Mpe lisusu “kopesa litatoli ya oyo [biso] toyebi mpe tondimi mpe oyo [biso] toyoki.” Mokambi Ballard ateyaki, “litatoli ya solo ekoki komemama na nguya ya Molimo Mosantu kati na mitema ya basusu oyo bazali ya kofungwama mpo na koyamba yango.”

Bokaboli nsango malamu oyo ezongisami ya Yesu Klisto ezalaki mposa monene ya motema ya Mokambi Ballard. Tokoki komipesa na makasi nyonso—lokola ye azalaki—na bokaboli nsango malamu na nyonso mibale maloba mpe misala. Tokoki koyeba te nani nakati na biso akoki kolukaka mpole ya nsango malamu kasi ayebi te epayi wapi kozwa yango (tala Malongi mpe Mayokani 123:12).

Elilingi
mibali mibale bazali komata na mwa eskalye

Kopusa Bambela ya Sembo

Nakosalisaka basusu mpo na koya epayi ya Klisto, tobengaka bango komona esengo oyo Mobikisi mpe nsango malamu na Ye ememaka. Tokoki kobengisa bango baya na lisano ya Eklezia, Kotanga Buku ya Mormon, to kokutanisa bango elongo na bamisionele. Tokoki lisusu kopusa libiangi ya sembo mpo na bango basangana na liyangani ya elambo elongo na biso.

Tosanganaka na liyangani ya elambo mposo nyonso mpona “kosanjola Nzambe mpe kolia elambo mpo na kokundola Yesu Klisto mpe Bomikabi na Ye.” Yango ezali ntango ya libaku mpo na bato bayoka Molimo, bakoma penepene na Mobikisi, mpe balendisa bondimi na bango epayi na Ye.

Soki toluki banzela mpo na kolinga, kokabola, mpe kobenga, mabongisi mpe babokasi na biso esengeli ezwa kosalisaka bato mpo na kosangana na liyangani ya elambo. Soki bango bakondima libiangi na biso mpe kosangana na liyangani ya elambo, bango bakoki mpenza kokoba na nzela ya libatisi mpe ya kobongwana. Nandimisami na motema na ngai mobimba ete elonga ya monene ekoya ntango tozali kobenga basusu basangana na liyangani ya elambo mpe kosalisa bango bayeba mapamboli oyo bango bakoki koyamba na kosalaka bongo.

Nkolo Akotambwisa Biso

Tokoyeba ata mokolo moko te malonga mpe mikakatano nini tokozwa ntango tolingi, tokaboli mpe tobengi. Bana mibali ya Mosiah “bakendeki uta engumba na engumba, mpe uta ndako moko ya bokumbami na esusu, katikati ya Balamani, mpo na koteya mpe kolakisa liloba ya Nzambe kati na bango; mpe boye babandaki kozala na elonga monene.” Nanzela ya bokasi na bango, “mpe bankoto bamememaki na boyebi ya Nkolo,” mpe ebele “babongwanaki [mpe] bakweyaki ata mokolo moko te” (Alma 23:4–6).

Atako ekozala kaka lolenge na biso te, Nkolo alakaki ete Ye akozala elongo na biso mpo ete molimo nyonso ezali motuya mpo na Ye. Lokola tozali kotya elikya na biso na Nkolo mpe komipesa na misala na ye, Akokamba biso na lolenge ya kokabola nsango malamu na Ye na basusu na kolingaka bango, kokabola bomoi mpe matatoli na biso na bango, mpe kobenga bango mpo na tosangana na kolandaka Ye.

“Monene esengeli ezala [ya biso] esengo” (Malongi mpe Mayokani18:15) ntango tozwi mabaku nyonso nzinganzinga na biso ya kosunga Nkolo Yesu Klisto na mosala na Ye monene ya komemaka milimo epayi na Ye.

Litangi

  1. Teachings of Presidents of the Church: David O. McKay (2003), xxii.

  2. Teachings of Presidents of the Church: Spencer W. Kimball (2006), 261, 262.

  3. Gordon B. Hinckley, “Find the Lambs, Feed the Sheep,” Liahona, July 1999, 121. Liloba oyo epesamaki na Nsanza ya Mibale. 21, 1999, na nzela ya bokaboli na satelite uta Tabenakle ya Salt Lake.

  4. Russell M. Nelson, “Boyokani ya Libela,” LiahonaSanza ya Zomi. 2022, 9.

  5. M. Russell Ballard, “Lokumu na Moto,” Liahona, Sanza ya Zomi na moko. 2023, 74.

  6. M. Russell Ballard, “The Essential Role of Member Missionary Work,” Liahona, May 2003, 40.

  7. M. Russell Ballard, “Bomikundola Maye Mazali Motuya Mpenza,” Liahona, Sanza ya Mitano 2023, 107.

  8. Teya Nsango Malamu ya Ngai: Mokambi na Kokabola Nsango Malamu ya Yesu Klisto (2023), 88.

  9. Tala Teya Nsango Malamu ya Ngai, 172.

Bimisa na lokasa