Yaka, Landa Ngai 2024
Bobakisi C: Mpo na Eteyelo ya Bana—Mateya mpo na Ntango ya Koyemba mpe Molulu ya Bana na Eyenga ya Elambo


“Bobakisi C: Mpo na Eteyelo ya Bana—Mateya mpo na Ntango ya Koyemba mpe Molulu ya Bana na Eyenga ya Elambo” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Libota mpe Eklezia: Buku ya Mormon 2024 (2023)

“Bobakisi C,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Libota mpe Eklezia: 2024

Elilingi
bana mpe moteyi bazali koyemba

Bobakisi C

Mpo na Eteyelo ya Bana—Mateya mpo na Ntango ya Koyemba mpe Molulu ya Bana na Eyenga ya Elambo

Nzembo ya Eteyelo ya bana ezali esalelo ya nguya mpo na kosunga bana bayekola na ntina ya mwango ya esengo ya Tata na Lola mpe bosolo ya motuya ya nsango malamu ya Yesu Klisto. Ntango bana bazali koyemba na ntina ya mabongsi ya nsango malamu, Molimo Mosantu akotatola na ntina ya bosolo na bango. Maloba mpe miziki ekotikala na makanisi mpe mitema ya bana bomoi na bango mobimba.

Luka bokambi ya Molimo ntango ozali komilengela mpo na koteya nsango malamu na nzela ya miziki. Kabola litatoli na yo ya bosolo oyo ozali koyemba. Sunga bana bamona lolenge nini miziki elobelaka maye bayekolaka mpe maye babikaka na libota mpe na Biteyelo ya bana.

Bokambi mpo na Molulu ya Liyangani ya Eyenga ya Elambo.

Na bokambami ya episikopo, molulu ya liyangani ya eyenga ya elambo ya bana esalemaka mingi nsima ya basanza zomi na mibale na mobu. Lokola mokambi ya Eteyelo ya bana mpe mokambi ya miziki, bokosala elongo na mopesi toli na boepisikopo oyo akokengela Eteyelo ya bana mpo na kolengela molulu.

Molulu esengeli kopesa bana ndingisa batalisa maye bango mpe mabota na bango bayekolaki uta na Buku ya Mormon na libota mpe na Eteyelo ya bana, mpe lisusu nzembo ya Eteyelo ya bana oyo bayembaki na mobu. Ntango ozali kolengela molulu, banza banzela oyo ekoki kosunga lingomba batalela Mobikisi mpe mateya na Ye.

Masanga na mitango moke ya bana bakoki kobanza banzela na lolenge bandeko ya libota bakoki kosangana na bana na bango. Moto ya boepisikopo akoki kosukisa liyangani na makebisi ya mokuse.

Ntango ozali kolengela molulu, kanisa babokambi oyo elandi:

  • Milulu ya bolakisi esengeli te kolekisa ntango mpamba na Eteyelo ya bana to na libota.

  • Babomoni, bakazaka, mpe milulu ya media ezali malamu te mpo na liyangani ya eyenga.

Tala Buku Monene: Kosunga kati ya Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka12.2.1.2.

Malako mpo na Ntango ya Koyemba

Baminiti 5 (bokambi ya Eteyelo ya bana): losambo ya Bofungoli, makomi to eteni ya bondimi, mpe lisikulu moko

Baminiti 20 (mokambi ya miziki): Ntango ya koyemba

Mokambi ya Eteyelo ya bana mpe mokambi ya miziki bakopona nzembo mpo na sanza moko na moko mpo na kolendisa mabongisi oyo bana bazali koyekola na biteyelo na bango mpe na libota. Mokanda ya nzembo oyo ekolendisa mabongisi oyo etiami na kati ya bokambi oyo.

Ntango ozali kolakisa bana nzembo, bengisa bango bakabola maye basila koyekola na ntina ya masolo ya kala mpe mabongisi ya malongi oyo nzembo ezali kolobela. Bengisa bana bakabola makanisi na bango mpe mayoki na ntina ya babosolo oyo ezwami na kati ya nzembo.

The Children’s Songbook ezali mokanda ya ntina mpo na miziki na Eteyelo ya bana. Nzembo na kati ya kantiki mpe nzembo kati ya Friend ezali lisusu malamu. Bosaleli ya miziki mosusu kati ya Eteyelo ya bana esengeli kondimama na episikopo (tala Buku Monene12.3.4).

Elilingi
bana bazali koyemba

Miziki mpo na Ntango ya Koyemba

Sanza ya yambo

  • Book of Mormon Stories,” Children’s Songbook, 118–19

  • Bobatela Mitindo,” Children’s Songbook, 146–47

  • The Iron Rod,” Hymns, no. 274

Sanza ya mibale

  • Nephi’s Courage,” Children’s Songbook, 120–21

  • I Feel My Savior’s Love,” Children’s Songbook, 74–75

  • Choose the Right,” Hymns, no. 239

Sanza ya misato

  • I Love to See the Temple,” Children’s Songbook, 95

  • When I Am Baptized,” Children’s Songbook, 103

  • Easter Hosanna,” Children’s Songbook, 68–69

Sanza ya minei

  • A Child’s Prayer,” Children’s Songbook, 12–13

  • Have I Done Any Good?,” Hymns, no. 223

Sanza ya mitano

  • Love One Another,” Children’s Songbook, 136–37

  • I Will Be Valiant,” Children’s Songbook, 162

  • Help Me, Dear Father,” Children’s Songbook, 99

Sanza ya motoba

  • Testimony,” Hymns, no. 137

  • We’ll Bring the World His Truth,” Children’s Songbook, 172–73

  • Follow the Prophet,” Children’s Songbook, 110–11

Sanza ya nsambo

  • I Want to Be a Missionary Now,” Children’s Songbook, 168

  • My Heavenly Father Loves Me,” Children’s Songbook, 228–29

  • Faith,” Children’s Songbook, 96–97

Sanza ya mwambe

  • As I Search the Holy Scriptures,” Hymns, no. 277

  • Home Can Be a Heaven on Earth,” Hymns, no. 298

Sanza ya libwa

  • The Still Small Voice,” Children’s Songbook, 106–7

  • Samuel Tells of the Baby Jesus,” Children’s Songbook, 36

  • I’m Trying to Be like Jesus,” Children’s Songbook, 78–79

Sanza ya zomi

  • Families Can Be Together Forever,” Children’s Songbook, 188

  • The Church of Jesus Christ,” Children’s Songbook, 77

Sanza ya zomi na moko

  • Dare to Do Right,” Children’s Songbook, 158

  • I Believe in Christ,” Hymns, no. 134

Sanza ya zomi na mibale

  • Search, Ponder, and Pray,” Children’s Songbook, 109

  • Away in a Manger,” Children’s Songbook, 42–43

  • He Sent His Son,” Children’s Songbook, 34–35

Bosaleli Miziki mpo na Koteya Malongi

Ntango ya koyemba esalamaka mpo na kosunga bana bayekola babosolo ya nsango malamu. Makanisi oyo elandi ekoki kofula yo olengela banzela ya koteya mabongisi ya nsango malamu oyo ezwami na kantiki mpe na nzembo ya Eteyelo ya bana.

Tanga makomi oyo ekokani. Mpo na mingi ya nzembo na kati ya Children’s Songbook mpe buku ya nzembo, ekokani na makomi oyo etangami. Sunga bana batanga mwa milongo miye, mpe bosolola na ntina ya lolenge nini makomi ekokani na loyembo. Okoki lisusu kokoma mwa makomi ekokana na etando mpe kobengisa bana bakokanisa likomi moko na moko na loyembo to molongo uta na loyembo.

Fill in the blank. Koma molongo ya loyembo na etando na maloba ya ntina ebele ezanga. Nsima senga bana bayemba loyembo, yoka maloba oyo etondi kati ya bozangi. Ntango batondisi kati ya bozangi nyonso, bosolola mabongisi nini nsango malamu boyekoli uta na maloba ezangi.

Elilingi
mokambi ya ntango ya koyemba

Tatola. Otatola litatoli ya mokuse epai ya bana na ntina ya babosolo ya nsango malamu oyo ezwami kati ya loyembo ya Eteyelo ya bana. Sunga bana basosola ete koyemba ezali lolenge moko oyo bakoki kotatola mpe koyoka Molimo.

Telema lokola nzeneneke. Bengisa bana basala moko nsima ya mosusu batelema mpe batatola maye bayekoli uta na loyembo oyo bayembi to lolenge nini bayokaka na ntina ya babosolo oyo ezwami na kati ya loyembo. Tuna bango lolenge nini bayoki ntango bayembi loyembo, mpe sunga bango bayeba nguya ya Molimo Mosantu.

Salela bililingi. Senga bana basunga yo ozwa to okela bilili oyo ekotambola na maloba ya ntina to maloba ya loyembo. Bengisa bango bakabola lolenge nini billi ekokani na loyembo mpe maye loyembo ezali koteya. Ndakisa, soki ozali koteya loyembo “The Iron Rod” (Hymns, no. 274), okoki kotia bilili na kati ya kisuku to na nse ya bakiti kolakisaka maloba ya ntina ya loyembo (lokola iron rod, liloba ya Nzambe, bokambi, lisenginya, mpe lola). Senga bana basangisa bilili mpe basimba yango likolo na lolenge malamu ntango bozali koyemba loyembo elongo.

Bokabola liteya na nzela ya eloko. Okoki kosalela eloko mpo na kofula lisolo na ntina ya loyembo. Ndakisa, loyembo “Faith” (Children’s Songbook, 96–97) elimboli nkona ya moke. Okoki kolakisa bana nkona mpe kosolola na ntina ya lolenge nini tolakisaka bondimi ntango tolonaka nkona; yango ekoki kokamba na lisolo na ntina ya ndenge tolakisaka bondimi na Yesu Klisto, lokola elimbolami na loyembo.

Bengisa bango bakabola makambo na bango bayebi. Sunga bana bakangisa mabongisi oyo eteyami na kati ya loyembo na makambo bayebi na mabongisi oyo. Ndakisa, yambo ya koyemba “I Love to See the Temple” (Children’s Songbook, 95), okoki kosenga bana batombola maboko na bango soki basila komona tempelo. Bengisa bango, ntango bazali koyemba, bakanisa na ntina ya lolenge bazali koyoka ntango bamonaka tempelo.

Tuna mituna. Ezali na mituna ebele okoki kotuna ntango bozali koyemba banzembo. Ndakisa, okoki kotuna bana nini bayekoli uta na molongo moko na moko kati ya loyembo. Okoki lisusu kotuna bango bakanisa mituna oyo loyembo ezali koyanola. Yango ekoki kokamba na lisolo etali babosolo oyo eteyami na kati ya loyembo.

Salela makambo ya pete. Bengisa bana bakanisa makambo ya pete mpo na kosunga bango bamikundola maloba mpe bansango ya loyembo. Ndakisa, ntango bozali koyemba molongo ya mibale “My Heavenly Father Loves Me” (Children’s Songbook, 228–29), okoki kobengisa bana batia miso na bango, basala lokola bipekapeka, mpe batia maboko na bango na nsima ya matoyi na bango. Senga bango batia maboko na bango na mitema ntango bazali koyemba “Iyo, nayebi ete Tata na Lola alingaka ngai.”

Bimisa na lokasa