Buku mpe Mbiangi
2. Kosunga Bato mpe Mabota kati na Mosala ya Nzambe ya Lobiko mpe ya Bonetoli


“2. Kosunga Bato mpe Mabota na Mosala ya Nzambe ya Lobiko mpe ya Bonetoli,” Maponi uta na Buku Monene (2023).

“2. Kosunga Bato mpe Mabota,” Maponi uta na Buku Monene

Elilingi
foto ya libota

2.

Kosunga Bato mpe Mabota na Mosala ya Nzambe ya Lobiko mpe ya Bonetoli

2.0

Boyingisi

Lokola mokambi kati na Eklezia ya Yesu Klisto, osungaka bato mpe mabota kati na kokokisa mosala ya Nzambe ya lobiko mpe ya bonetoli (tala 1.2). Ntina ya nsuka ya mosala ezali kosalisa bana banso ya Nzambe bazwa mapamboli ya bomoi ya seko mpe bofuluki ya esengo.

Mingi ya Mosala ya Nzambe ya lobiko mpe ya bonetoli ekokisamkati na libota. Mpo na bandimi nyonso ya Eklezia, mosala oyo esalami kati na libota.

2.1

Mokumba ya Libota kati na Moango ya Nzambe

Lokola eteni ya moango na Ye, Tata na Lola atiaki mabota na mabele. Azali na mokano ete mabota ememela biso esengo. Mabota ekokisaka mabaku ya koyekola, kokola, kosalela Nzambe, koyambola, mpe kolimbisa. Ekoki kosalisa biso tomilengela mpo na bomoi ya seko.

Elaka ya Nzambe ya bomoi ya seko ezali na kati na libala ya seko, bana, mpe mapamboli mosusu nyonsso ya libota ya seko. Elaka oyo ezali mpo na baoyo babalani maino te to bazali na libota te kati na Eklezia.

2,1. 1

Mabota ya seko

Mabota ya seko esalami ntango bandimi ya Eklezia bazali kosala mayokani ntango bazali kozwa makuli ya kokangisama kati na tempelo. Mapamboli ya libota ya seko esalamaka ntango bandimi babatelaka mayokani wana mpe bayambolaka ntango bakweyaka moke. Bakambi ya Eklezia basalisaka bandimi bamilengela mpo na kozwa makuli oyo mpe kotosa mayokani na bango.

Lolenge mosusu ya kofandisaka mabota ya seko ezali kosala makuli kati na tempelo oyo epesaka nzela na bandimi bakangisama na bankoko na bango bakufa.

2,1.2

Mobali mpe Mwasi

Libala ya mobali moko mpe mwasi moko ebulisami na Nzambe (tala Malongi mpe Mayokani 49:15). Balongani basalami mpo na kokoba elongo na nzela ya bomoi ya seko (tala 1 Bakolinti 11:11).

Moko ya masengeli mpo na kozwa bomoi ya seko ezali mpo na mobali mpe mwasi mpo na kokota na boyokani ya libala ya selesitiale (tala Malongi mpe Mayokani 131:1–4). Babalani basalaka boyokani oyo ntango bazwaka likuli ya kokangisa kati na tempelo. Boyokani oyo ezali moboko ya libota ya seko. Ntango ebatelami na bosembo, epesaka nzela na libala na bango ewumela libela.

Boyebani nzoto kati ya balongani esalami mpo na kozala kitoko mpe esantu. Ebulisami na Nzambe mpo na bokeli ya bana mpe mpo na kolakisa bolingo katikati ya balongani. Boboto mpe limemia—kimoyimi te—esengeli ekamba bozalani na bango ya bolingo.

Nzambe atindi ete boyebani nzoto esengeli kozala kaka mpo na libala katikati ya mobali moko mpe mwasi moko.

Babalani (mobali mpe mwasi) bazali ya kokokana na miso ya Nzambe Moko asengeli kodondwa likolo ya mosusu te. Mikano na bango esengeli kosalama na bomoko mpe bolingo, na bosali elongo mobimba ya bango mibale.

2,1.3

Baboti mpe Bana

Baprofeta ya mikolo ya nsuka batei ete “ mobeko ya Nzambe mpo ete bana na Ye babota mpe batondisa mabele oyo ezali kaka kosala” (“Libota: Esakola na Mokili”; tala lisusu Malongi mpe Mayokani 49:16–17).

Molongani ya mobali mpe ya mwasi ya bolingo bakokisaka esika ya malamu mpenza mpo na kobokola mpe koleisa bana. Makambo ya moto na moko ekoki kopekisa baboti te babokola mpe baleisa bana na bango. Nzokande, Nkolo akopambola bango ntango bazali lisalisi na Ye mpe kosala makasi mpo na kobatela mayokani na bango na Ye.

Baboti bazali na mokumba ya ntina mpo na kosalisa bana na bango bamilengela mpo na kozwa mapamboli ya bomoi ya seko. Bateyaka bana bango balinga mpe basalela Nzambe mpe basusu (tala Matai 22:36–40).

“Batata basengeli kokamba mabota na bango na bolingo mpe na bosembo mpe bazali na mokumba ya kokokisa bosenga ya bomoi mpe bobateli ya mabota na bango” (“Libota: Esakola na Mokili”). Ntango ezali na molongani ya mobali te to tata na ndako, mama akambaka libota.

Kokamba libota ezali mokumba ya kosalisa kokamba bato ya libota bazonga kofannda liboso ya Nzambe. Oyo epesami na kosalelaka Nzambe mpe koteyaka, na boboto, bosokemi, mpe bolingo ya peto, kolandaka ndakisa ya Yesu Klisto (tala Matai 20:26–28). Kokamba libota ezali na kokamba bato ya libota na losambo ya ntango nyonso, boyekoli nsango malamu, mpe makambo mosusu ya kogumbamela. Baboti basalaka na bomoko mpo na kokokisa mikumba oyo.

“Bamama bazali na mokumba ya yambo ya kobokola bana na bango” (“Libota: Esakola na Mokili”). Kobokola elingi koloba koleisa, koteya, mpe kosunga, kolandaka ndakisa ya Mobikisi (tala 3 Nefi 10:4). Na bomoko elongo na molongani na ye, mama asalisaka libota na ye eyekola bosolo ya nsango malamu mpe ekolisa bondimi kati na Tata ya Lola mpe Yesu Klisto. Elongo bazali kosala esika moko ya bolingo kati na libota.

“Na mikumba miye ya bule, batata mpe bamama basengisami kosalisana lokola baninga oyo bakokani.” (“Libota: Esakola na Mokili”). Na losambo basanganaka bango na bango mpe elongo na Nzambe.

2.2

Mosala ya Nzambe ya Lobiko mpe ya Bonetoli kati ya Libota

Bakambi ya Yambo balobaki, “Libota ezali moboko ya bomoi ya bosembo” (Mokanda ya Bakambi ya Yambo, sanza ya mibale 11, 1999).

Mpo na kosunga bandimi na kosala mosala ya Nzambe ya lobiko mpe ya bonetoli na libota, bakambi ya Eklezia balendisaka bango basala ndako moko epayi wapi Molimo ezali. Bazali lisusu kolendisa bandimi batosa mokolo ya saba, batanga mpe bayekola nsango malamu na libota, mpe basala likita ya libota na mpokwa poso na poso.

2.2.3

Boyekoli Nsango malamu mpe Boyeli na Libota

Boteyi mpe Boyekoli nsango malamu ezali kotia ndako na katikati mpe kosunngama na Eklezia. Bakambi ya Eklezia balendisaka bandimi nyonso bayekola nsango malamu na libota na mokolo ya Saba mpe na poso mobimba.

Boyekoli makomi lokola eteyami kati na Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota ezali mateya eponami ya boyekoli Nsango malamu na Libota.

2.2.4

Likita ya Libota na Mpokwa mpe Milulu Misusu

Baprofeta ya mikolo ya nsuka bapesi bandimi ya Eklezia toli ya kosala likita ya libota na mpokwa poso na poso. Oyo ezali ngonga ya bule mpo na bato mpe mabota bayekola nsango malamu, balendisa matatoli, batonga bomoko, mpe basepela moko na mosusu.

Likita ya ibota na mpokwa esalamaka na momesano engebene ezalela ya bandimi. Ekoki kosalema na saba to mikolo mpe bangonga misusu. Ekoki kozala na:

  • Boyekoli nsango malamu mpe mitindo (mikanda ya Yaka, Landa Ngai ekoki kosalelama lokola elingami).

  • Kosalisa basusu.

  • Koyemba mpe kobeta loyembo mpe nzembo ya Eteyelo ya Bana (tala mokapo 19).

  • Kosunga bandeko ya mabota na bokoli ya Bana mpe ya Bilenge.

  • Libota esanganaka mpo na kotia bantina, kosilisa makambo, mpe koyangela manaka na lisanga.

  • Milulu ya masano.

Bandimi babala te mpe basusu bakoki kosangana na maboke libanda ya losambo ya kogumbamela ya Saba ya momesano mpo na kosala elongo na likita ya libota na mpokwa mpe kolendisana kati na boyekoli nsango malamu.

2.2.5

Kosunga bato

Bakambi ya Eklezia basungaka bandimi oyo bazangi lisungi mosusu. Bakambi basalisaka bandimi oyo mpe mabota na bango bazwa mabaku mpo na kimoninga, makambo ya bato ya kitoko, mpe bokoli ya molimo.

2.3

Mokangano katikati ya Libota mpe Eklezia

Mosala ya Nzambe ya lobiko mpe bonetoli etie ndako na katikati mpe esungami na Eklezia. Mabongisi oyo elandi esalelamaka kati na mokangano okatikati ya libota mpe Eklezia

  • Bakambi mpe bateyi bapesaka lokumu na mokumba ya baboti mpe basungaka bango.

  • Mayangani mosusu ya Eklezia ezali ntina na palwasi to etape moko na moko. Oyo ezali na liyangani ya elambo mpe bakelasi mpe mayangani ya masanga makoki oyo esalamaka na Saba. Mayangani, milulu, mpe bapologalami mingi mosusu ezali na ntina mpenza te.

  • Nkolo akopambola bandimi ntango bazali kosalela Nzambe mpe komibonza kati na Eklezia na Ye. Nzokande, motango ya ngonga epesami na mosala ya Eklezia esengeli te kosala mpasi na makoki ya bandimi mpo na kokokisa mikumba na bango na libota, na mosala, mpe bipayi mosusu.

Bimisa na lokasa