Buku mpe Mbiangi
9. Lingomba ya Bamama Basungi


“9. Lingomba ya Bamama Basungi,” Maponi uta na Buku Monene (2023).

“9. Lingomba ya Bamama Basungi,” Maponi uta na Buku Monene

Elilingi
basi bazali koyekola makomi

9.

Lingomba ya Bamama Basungi

9.1

Ntina mpe Lingomba

9.1.1

Ntina

Profeta Joseph Smith ateyaki ete ntina ya Lingomba ya Bamama Basungi ezali kobikisa milimo mpe kobondisa mpasi.

Mokano ya Lingomba ya Bamama Basungi ezali “Bolingo ekosuka te” (1 Bokolinti 13:8).

9.1. 2

Lingomba ya Bamama Basungi

Elenge mwasi akoki kobanda kokende na Lingomba ya Bamama Basungi ntango akokisi mibu 18. Na pene ya mibu 19 to ntango ya kolongwa na ndako, ndakisa mpo na kokende na univesité to kosala misio, asengeli kosala elongo kati na Lingomba ya Bamama Basungi.

Basi babala oyo bazali na nse ya mibu 18 bazali lisusu bandimi ya Lingomba ya Bamama Basungi.

9.2

Kosala na Mosala ya Nzambe ya Lobiko mpe ya Bonetoli

9.2.1

Kosalela Nsango malamu ya Yesu Klisto

9.2.1.2

Koyekola Nsango malamu kati na Lingomba ya Bamama Basungi

Mayangani esalamaka na mikolo ya eyenga ya mibale mpe ya minei ya sanza. Ewumelaka miniti 50 . Bokambi ya Lingomba ya Bamama Basungi esalaka miango ya mayangani oyo. Moto moko ya bokambi akambaka.

Mayangani ya Lingomba ya Bamama Basungi ebetaka nsete na makambo uta na lisikulu moko to mingi ya likita linene ya kala mpenza te.

9.2.1.3

Milulu

Babokambi ya Mangomba ya Bamama Basungi bakoki kosala miango ya milulu. Milulu mingi esalamaka na bangonga mosusu koleka mikolo ya eyenga to bampokwa ya mikolo ya yambo.

9.2. 2

Kobatela Baye Bazali na Bosenga

9.2.2.1

Kosalisa

Bandeko basi bazwaka bitinda ya kosalisa uta na bokambi ya Lingomba ya Bamama Basungi. Mpo na nsango mingi, tala mokapo 21.

9.2.2.2

Babosenga ya Ntango Mokuse

Bandeko basi basalisi balukaka kososola mpe koyanola babosenga ya baye basalisaka. Bandimi bakoki kozala na mposa ya lisungi ya ntango mokuse na bangonga ya bokono, kobota, liwa, bobungisi mosala, mpe makambo mosusu.

ntango esengeli, bandeko basi basalisi basengaka lisalisi na bokambi ya Lingomba ya Bamama Basungi.

9.2.2.3

Babosenga ya Ntango Molai mpe Bomikoki

Ntango ekambami na lisalisi ya episikopo, babokambi ya Lingomba ya Bamama Basungi mpe lisanga likoki ya bampaka basalisaka bandimi na babosenga ya ntango molai mpe bomikoki.

Mokambi ya Lingomba ya Bamama Basungi, mokambi ya lisanga likoki ya bampaka to mokambi mosusu asalisaka moto to libota yango akolisa Mwango ya Bomikoki.

9.2.2.4

Ntango Mondimi ya Palwasi Akufi

Ntango mondimi ya palwasi akufi, Babokambi ya Lingomba ya Bamama Basungi mpe ya Lisanga likoki ya bampaka bapesaka bolendisi mpe lisungi. Na nse ya bokambi ya episikopo, bakoki kosalisa mpo na kokunda.

Mpo na nsango mingi, tala 38.5.8.

9.2. 3

Kobengisa Banso Bayamba Nsango Malamu

Mokambi ya Lingomba ya Bamama Basungi atindaka moto moko ya bokambi mpo na kosalisa kokamba mosala ya misionele ya bandimi kati ya palwasi. Asalaka na mondimi motindami ya bokambi ya lisanga likoki ya bampaka mpo na kokamba na lisanga makasi oyo (tala 23.5.1).

9.2. 4

Kosangisa Mabota mpo na Seko

Mokambi ya Lingomba ya Bamama Basungi atindaka moto moko ya bokambi mpo na kosalisa kokamba mosala ya tempelo mpe mambi ya kala ya libota kati na palwasi: Asalaka na mondimi motindami ya bokambi ya lisanga likoki ya bampaka mpo na kokamba na lisanga makasi oyo (tala 25.2.2).

9.3

Bakambi ya Lingomba ya Bamama Basungi

9.3.1

Episikopo

Episikopo mbala mingi akutanaka na mokambi ya Lingomba ya Bamama Basungi na sanza nyonso. Basololaka na ntina ya mosala ya Nzambe ya lobiko mpe ya bonetoli, kokwaka mosala ya bandeko basi basalisi.

9.3. 2

Bokambi ya Lingomba ya Bamama Basungi

9.3.2.1

Kobianga Bokambi ya Lingomba ya Bamama Basungi

Episikopo abiangaka mwasi moko mpo na kosala lokola mokambi ya Lingomba ya Bamama Basungi. Soki etonga ezali monene mpenza, akotindela ye mwasi moko to mibale mpo na kosala lokola bapesi toli na ye.

Bitonga ya mike misusu ekoki kozala na mokambi ya ya Bilenge Basi to ya Eteyelo ya Bana. Na bitonga oyo, mokambi ya Lingomba ya Bamama Basungi akoki kosalisa baboti basala mwango ya mateya mpo na bilenge mpe bana.

9.3.2.2

Mikumba

Mokambi ya Lingomba ya Bamama Basungi azali na mikumba oyo elandi: Bapesi toli na ye basungaka ye.

  • Kosala na lisanga ya palwasi.

  • Kokamba bokasi ya Lingomba ya Bamama Basungi mpo na kosala elongo kati na mosala ya lobiko mpe bonetoli (tala mokapo 1).

  • Kobongisa mpe kokengela mosala ya bandeko basi basalisi.

  • Na nse ya bokambi to toli ya episikopo, kosolola na bandimi ya mikolo ya palwasi.

  • Kokamba na lisanga makasi ya Lingomba ya Bamama Basungi mpo na kolendisa bandeko mibali bilenge ya mikolo, babala te mpe babala lokola.

  • Kokutana na moto ya Lingomba ya Bamama Basungi moko na moko na ye moko ata mbala moko na mobu.

  • Kokengela makundoli ya Lingomba ya Bamama Basungi, balapole, mpe misolo (tala LCR.ChurchofJesusChrist.org).

9.3.2.3

Liyangani ya Bokambi

Bokambi ya Lingomba ya Bamama Basungi mpe sekeletele bakutanaka mbala na mbala. Mokambi akambaka mayangani oyo. Manaka ekokaki kokwa biloko oyo elandi:

  • Kosala mwango ya lolenge nini kolendisa bandeko basi mpe mabota na bango.

  • Kokamba na lisanga mosala ya misionele mpe mosala ya tempelo mpe ya mambi ya kala.

  • Koyanola na mikumba uta na mayangani ya lisanga ya palwasi.

  • Kotala nsango uta na masolo ya kosalisa.

  • Kokanisa bandeko basi mpo na kosalela Nzambe kati na mabiangi mpe mikumba ya Lingomba ya Bamama Basungi .

  • Kosala mwiango ya mayangani mpe milulu ya Lingomba ya Bamama Basungi.

9.3. 3

Sekeletele

Mokambi ya Lingomba ya Bamama Basungi akoki kotinda ndeko mwasi moko mpo na kosalela Nzambe lokola sekeletele ya Lingomba ya Bamama Basungi.

9.4

Kosalisa Bilenge Basi Bamilengela mpo na Kosala elongo na Lingomba ya Bamama Basungi

Mokambi ya Lingomba ya Bamama Basungi asalaka na bilenge basi, baboti na bango, mpe bakambi ya Bilenge Basi mpo na kosalisa bilenge bamilengela mpo na kosala elongo kati na Lingomba ya Bamama Basungi.

Bakambi lisusu bapesaka mabaku ya sika mpo ete bilenge basi mpe bandeko basi ya Lingomba ya Bamama Basungi bakolisa kimoninga. kosala kati na bango lokola bandeko basi basalisi ezali moko ya lolenge ya motuya mpo na kosala mikangano.

9.6

Mitindo mpe Mibeko Misusu

9.6. 2

Boyekoli Kotanga

Soki esengeli, mokambi ya Lingomba ya Bamama Basungi asalaka na episikopo, bokambi ya lisanga likoki ya bampaka, mpe lisanga ya palwasi mpo na kosalisa bandimi bayekola kotanga mpe kokoma.

Bimisa na lokasa