Buku mpe Mbiangi
10. Masanga makoki ya Bonganzambe ya Alona


“10. Masanga makoki ya Bonganzambe ya Alona,” Maponi uta na Buku Monene (2023).

“10. Masanga makoki ya Bonganzambe ya Alona,” Maponi uta na Buku Monene

Elilingi
bilenge mibali kati na eklezia

10.

Masanga makoki ya Bonganzambe ya Alona

10.1

Ntina mpe Lingomba

10.1.1

Ntina

Ntina ya lisanga likoki ezali ya kosalisa basimbi bonganganzambe basala elongo mpo na kosala na mosala ya Nzambe ya lobiko mpe ya bonetoli.

10.1. 2

Mama ya likambo ya Lisanga likoki ya Bonganzambe ya Alona.

“Nazali mwana mobali ya Nzambe wa bolingo, mpe Apesi ngai mosala moko nasala.

“Na motema motema na ngai mobimba, nguya, makanisi, mpe makasi, nakolinga Nzambe, kobatela mayokani na ngai, mpe kosalela bonganganzambe na Ye mpo na kosalisa basusu, kobanda kati na libota na ngai moko.

“Ntango nazali kosala makasi mpo na kosala, kosalela bondimi, koyambola, mpe kokola mokolo na mokolo, nakolongobana mpo na kozwa mapamboli mpe esengo ewumelaka ya nsango malamu.

“Nakomilengela mpo na kokoma misionele ya etingya, molongani ya bosembo, tata ya bolingo na kozalaka moyekoli ya solo ya yesu Klisto.

“Nakosalisa kolengela mokili mpo na bozongi ya mobikisis na kobengisaka banso baya epayi ya Klisto mpe bazwa mapamboli ya Bomikabi.”

10.1. 3

Masanga makoki

10.1.3.1

Lisanga likoki ya Badiakono

Bilenge mibali bakotaka na lisanga likoki ya badiakona kobanda sanza ya yambo ya mobu bakokokisa mibu 12. Na ntango oyo bazali lisusu baponami mpo na kokulisama badiakona soki balengelami mpe balongobani.

Misala ya diakono elimbolami kati na Malongi mpe Mayokani 20:57–59; 84:111. Misala misusu mikwi kokabola elambo mpe kosunga episikopo na “koyangela makambo nyonso ya ntango” (Malongi mpe Mayokani 107:68).

10.1.3.2

Lisanga likoki ya Batei

Bilenge mibali bakotaka na lisanga likoki ya batei kobanda sanza ya yambo bakokisaka mibu 14. Na ntango oyo bazali lisusu baponami mpo na kokulisama batei soki balengelami mpe balongobani.

Batei bazali na misala se moko lokola badiakona. Balengelaka lisusu elambo mpe basalaka lokola bandeko mibali basalisi. Misala misusu elimbolami kati na Malongi mpe Mayokani 20:53–59; 84:111.

10.1.3.3

Lisanga likoki ya Banganganzambe

Bilenge mibali bakotaka na lisanga likoki ya banganganzambe kobanda sanza ya yambo bakokisaka mibu 16. Na ntango oyo bazali lisusu baponami mpo na kokulisama banganganzambe soki balengelami mpe balongobani.

banganganzambe bazali na misala se moko lokola badiakona mpe bateyi. Misala misusu elimbolami kati na Malongi mpe Mayokani 20:46–52, 73–79.)

10.1. 4

Bafungola ya Bonganganzambe

Mpo na nsango mingi etali bafungola oyo, tala 3,4.1.

10.1. 5

Kokokanisa Masanga makoki na Babosenga ya Esika

Kati na palwasi to etape na bilenge mibali moke, masanga makoki ya Bonganganzambe ya Alona ekoki kokutana esika moko mpo na mateya mpe milulu.

10.2

Kosala na Mosala ya Nzambe ya Lobiko mpe ya Bonetoli

10,2.1

Kosalela Nsango malamu ya Yesu Klisto

10.2.1.2

Koyekola Nsango malamu

Mayangani ya masanga makoki esalamaka na mikolo ya eyenga ya mibale mpe ya minei ya sanza. Ewumelaka miniti 50 . Moto moko ya bokambi ya lisanga likoki (to moko ya basungi ya episikopo kati na lisanga likoki ya banganganzambe) akambaka. Akambaka lisanga likoki na kolobaka na moto mama ya likambo mpe kosololaka esika moko na oyo etali mikumba , misala, mpe makambo mosusu.

Moto ya lisanga likoki to mokambi ya mokolo nsima akambaka mateya ya nsango malamu.

10.2.1.3

Mosala mpe Milulu

Mosala mpe milulu esengeli kotonga matatoli, kolendisa mabota, koleisa bomoko kati na lisanga likoki, mpe kopesa mabaku ya kopambola basusu.

Mosala mosusu mpe milulu esengeli kokwa bilenge mibali mpe bilenge basi lokola, mingimingi mpo na bilenge ya mikolo.

Milulu ya Mobu Kobakisa na milulu ya bilenge ya mbala na mbala, bilenge mibali bakoki lisusu kosala elongo na oyo elandi mobu na mobu:

  • Kaa ya lisanga likoki ya Bonganganzambe ya Alona (tala Buku mpo na Kokamba Kaa ya Bonganganzambe ya Alona).

  • Likita ya bilenge ya palwasi to ya likonzi to likita ya Mpo na Bokasi ya Bilenge (FSY) .

10.2.1.4

Bokoli ya Moto ye Moko

Kati na Makasi ya kokoma mingi lokola Mobikisi, bilenge babengisami ya kotia bantina mpo na kokola na molimo, na bomoto, na nzoto,mpe na mayele (tala Luka 2:52).

Mpo na nsango mingi, tala ChildrenandYouth.ChurchofJesusChrist.org.

10.2. 2

Kobatela Baye Bazali na Bosenga

Banganganzambe ya Alona basungaka episikopo “koyangela makambo nyonso ya ntango” (Malongi mpe Mayokani 107:68). Basengeli kozala na mabaku ya mbala na mbala mpo na kosalisa basusu kati na mpe elongo na mabota na bango, na eleko ya milulu, mpe na bango moko.

10.2.2.1

Kosalisa

Banganganzambe ya Alona bazwaka bitinda kobanda sanza ya yambo ya mobu bakokisi mibu 14. Mpo na nsango mingi, tala mokapo 21.

10.2. 3

Kobengisa Banso Bayamba Nsango Malamu

Banganganzambe ya Alona bazali na mosala ya “kobianga banso baya epai ya Klisto” (Malongi mpe Mayokani 20:59).

Baboti mpe bakambi balendisaka bilenge mibali bamilengela mpo na kosala bamisio ya ntango mobimba mpe mpo na kokabola nsango malamu na bomoi na bango mobimba.

10.2. 4

Kosangisa Mabota mpo na Seko

Banganganzambe ya Alona bakoki kosalisa na kosangisa mabota mpo na seko na ndenge mingi.

  • Kotosa baboti mpe kotia ndakisa moko ya kobika lokola Klisto na ndako na bango.

  • Kolengela mpo na kozwa makuli ya tempelo. Kokwaka libala ya seko.

  • Luka bankoko oyo basengeli na makuli ya tempelo (tala FamilySearch.org).

  • Kosala elongo kati na mabatisi mpe bankotisa mpo na bawei mbala mingi lokola makambo ezali kopesa nzela.

10.3

Boepisikopo

Mokumba ya liboso ya episikopo ezali kobatela bilenge mibali mpe bilenge basi kati na palwasi. Ayekolaka bankombo na bango mpe asosolaka makambo ya mabota na bango. Akendaka na milulu mpe na mayangani ya eyenga na bango mbala na mbala.

Episikopo azali mokambi ya lisanga likoki ya banganganzambe.

Mopesi toli ya yambo kati na boepisikopo azali na mokumba mpo na lisanga likoki ya batei. Mopesi toli ya mibale azali na mokumba mpo na lisanga likoki ya badiakona.

Boepisikopo ezali na mikumba misusu milandi mpo na lisanga likoki ya Bonganganzambe ya Alona:

  • Kokutana na elenge mobali moko na moko ata mbala mibale na mobu (tala 31.3.1).

  • Kosalisa bilenge mibali bamilengela mpo na Kozwa Bonganganzambe ya Melekisedeki.

  • Kokengela makundoli, balapole, mpe misolo ya lisanga likoki ya Bonganganzambe ya Alona.

Basungi ya lisanga likoki mpe bato ya boyebi basalisaka na mikumba oyo bo esengami.

10.4

Bakambi ya Masanga makoki ya Bilenge

10.4.1

Libiangi, Bosungi, mpe Boti pembeni

Episikopo abiangaka banganganzambe moko to mibale mpo na kosunga kati na kokamba lisanga likoki ya banganganzambe.

Moto moko ya boepisikopo abengaka bakambi ya masanga makoki ya badiakona mpe bateyi. Ntango ezali na Banganzambe ya Alona mingi mpo na kosalela Nzambe, bilenge mibali oyo na losambo batalaka bato ya lisanga likoki mpo na kotinda lokola bapesi toli mpe sekeletele.

Nsima ya kosembola mabiangi oyo, moto moko ya boepisikopo alakisaka bakambi ya lisanga likoki ya bilenge mpo na kosunga kati na liyangani ya lisanga likoki na bango. Episikopo atiaka pembeni basungi na ye mpe bakambi ya masanga makoki ya badiakona mpe batei. Apesaka bafungola ya bonganganzambe na bakambi ya masanga makoki. Akoki kotinda bapesi toli na ye batia pembeni bato mosusu ya bokambi mpe basekeletele.

10.4. 2

Mikumba

  • Kamba bokasi ya lisanga likoki mpo na kosala elongo kati na mosala ya Nzambe ya lobiko mpe ya bonetoli (tala mokapo 1).

  • Koyeba mpe kosalisa moto moko na moko ya lisanga likoki, mpe lisusu baoyo bakendaka na mayangani ya masanga makoki te.

  • Kosala na lisanga ya bilenge ya palwasi (tala 10.4.4).

  • Koteya bato ya lisanga likoki misala na bango ya bonganganzambe (tala Malongi mpe Mayokani 107:85–88).

  • Kosala miango ya kokamba mayangani ya lisanga likoki mpe milulu (tala 10.2.1.2).

  • Kosala miango mpe kokokisa mosala mpe milulu ya masanga makoki (tala 10.2.1.3).

10.4. 3

Liyangani ya Bokambi Lisanga iikokii

Babokambi ya masanga makoki ya Bonganzambe ya Alona bakutanaka mbala na mbala. Mokambi ya lisanga likoki akambaka mayangani oyo. Pene bakolo mibale bakendaka—moto moko ya boepisikopo, mosungi moko to moyebi makambo moko.

10.4. 4

Lisanga ya Bilenge ya palwasi

Tala 29.2.6 mpo na nsango mingi etali lisanga ya bilenge ya palwasi.

10.8

Mitindo mpe Mibeko Misusu

10.8.1

Kobatela Bilenge

Ntango bakolo bazali kosolola na bilenge kati na bisika ya Eklezia, pene mikolo mibale basengeli kozala wana.

Mikolo nyonso oyo bazali kosala elongo na bilenge basengeli kolanda boyekoli ya lolenge ya kobatela bana mpe bilenge kati na nsanza moko ya kobatelama (ProtectingChildren.ChurchofJesusChrist.org).

Bimisa na lokasa