Buku mpe Mbiangi
12. Eteyelo ya Bana


“12. Eteyelo ya Bana,” Maponi kouta na Buku Monene (2023).

“12. Eteyelo ya bana,” , Maponi kouta na Buku monene

Elilingi
libota esimbi makomi

12.

Eteyelo ya Bana

12.1

Ntina mpe Lingomba

Eteyelo ya bana ezali lingomba moko etali kaka libota, lingomba esimbami na Eklezia. Yango ezali mpo na bana ya sanza 18 kino mibu 11.

12,1.1

Bantina

Eteyelo ya Bana ezali kosunga bana na:

  • Koyoka bolingo ya Tata na bango ya Lola mpe koyekola na ntina ya moango na Ye ya esengo.

  • Koyekola na ntina ya Yesu Klisto mpe mosala na Ye na moango ya Tata ya Lola.

  • Koyekola mpe kobikaka Nsango malamu ya Yesu Klisto.

  • Koyoka, koyeba, mpe kosala na botindiki ya Molimo Santu.

  • Kolengela mpo na, kosala, mpe kobatela mayokani ya bule.

  • Kosala kati ya mosala ya Nzambe ya lobiko mpe ya bonetoli.

12,1.3

Biteyelo

Ntango bana bazali mingi, bakokabolama na baiteyelo kolandisaka mibu na bango.

Bana mingimingi bapusana uta na Eteyelo ya Bna kino ya Bilenge Basi to na lisanga likoki ya badiakona na ebandeli ya sanza ya Yambo ya mobu oyo bango bakokisi 12.

12,1.4

Ngonga ya Loyembo

Ngonga ya koyemba esungaka bana bayoka bolingo ya Tata ya Lola mpe koyekola na ntina ya moango na Ye ya esengo. Ntango bana bayembi na ntina ya mibeko ya nsango malamu, Molimo Mosantu etatoli babosolo na yango.

Bokambi ya kelasi ya bana mpe mokambi ya miziki baponaka nzembo mpo na sanza moko na moko mpo na kokembisa mibeko ya nsango malamu oyo bana bazali koyekola na biteyelo mpe ndako.

12,1.5

Eteyelo ya bana mike

Eteyelo ya bana mike asungaka na bana sanza 18 kino mibu 3 koyoka bolingo ya Tata ya Lola mpe koyekola na ntina ya moango na Ye ya esengo.

12.2

Kosala kati ya Mosala ya Nzambe ya Lobiko mpe ya Bonetoli

12,2.1

Kobikaka Nsango malamu ya Yesu Klisto

12.2.1.2

Boyekoli Nsango malamu

Mayangani ya Eteyelo ya Bana ya Eyenga. Moko ya bokambi ya eteyelo ya Bana akotambwisa bofungoli.

Nzela ya milulu ezali oyo elandi:

Eteni ya liyangani

Bolayi

Eteni ya liyangani

Kofungola (losambo, makomi to Biteni ya Bondimi, mpe lisikulu—nyonso epesami na bana)

Bolayi

5 miniti

Eteni ya liyangani

Ngonga ya Loyembo

Bolayi

20 miniti

Eteni ya liyangani

Bokaboli ya biteyelo

Bolayi

5 miniti

Eteni ya liyangani

Biteyelo mpe losambo ya bosukisi

Bolayi

20 miniti

Eteyelo ya bana mike mpo na bana ya sanza 18 kino mibu 3 esalaka baminiti 50. Behold Your Little Ones epsaka makanisi ya kokabola ntango.

Molulu ya Liyangani ya Elambo mpo na Bana. Molulu ya liyangani mpo na bana ya mobu esalamaka katikati ya sanza ya suka mobu.

Bokambi ya eteyelo ya bana mpe mokambi ya miziki balengelaka molulu na nzela ya losambo. Boepisikopo epesaka botambwisi. Bana bakoki koyemba, kopesa masukulu, mpe kokabola masolo, makomi, mpe matatoli.

Libongisi ya Likita ya Tempelo mpe ya Bonganganzambe. Bokambi ya Eteyelo ya Bana elengelaka libongisi ya liyangani na Tempelo mpe Bonganganzambe mobu moko na moko. Boepisikopo epesaka botambwisi. Liyangani ezali mpo na bana ya mibu 10. Baboti babengami kozala.

12.2.1.3

Lisalisi mpe Misala

Kobandaka na sanza ya Yambo ya mobu bango bakokisi mobu 8 bana bakoki kobanda kosanganaka na misala ya Eteyelo ya bana.

Misala ya Eteyelo ya bana esalamaka na ntango misusu libanda ya Biyenga to liyangani ya mpokwa na ndako.

  • Misala ya Eteyelo ya bana esalemaka mbala mibale na sanza ntango makoki ezali.

  • Mibali mpe basi bakutanaka na ndenge esengeli ya kokabwana. Nzokande, bakoki kosangisama mpo na misala misusu to na bisika oyo bana bazali mingi te.

Boepisikopo ekotala ete misolo mpe misala mpo na bana mibali mpe bana basi na kati ya Kelasi ya bana ekoki mpe ebongi.

12.2.1.4

Bokobi ya Moto yemoko

Na bokasi na bango ya kokoma mingi lokola Mobikisi, bana—kobanda na mobu bango bakokisi mibu 8—babengamaki kotia bantina ya kokola na molimo, na libota, na nzoto mpe na mayele (tala Luka 2:52).

Bango bakoki kosalela Personal Development: Children’s Guidebook mpo na kotia mpe kokoma bantina.

12.3

Botambuisi ya Kelasi ya bana na Palwase

12,3.1

Boepisikopo

Mokumba monene ya Boepisikopo ezali mpo na nkola ezali kokola, sangisa bana. Episikopo akoki kotinda mopesi toli moko asunga na mokumba na ye mpo na Eteyelo ya bana. Episikopo to mopesi toli moko aponami akutanaka mingimingi na mokambi ya Eteyelo ya Bana.

Episikopo mpe bapesi toli na ye bakotaka mingimingi na Eteyelo ya bana.

12,3.2

Bokambi ya Eteyelo ya bana

Episikopo abengaka mpe atiaka pembeni mwasi moko akoli mpo na kosala lokola mokambi ya Bana na palwasi.

Na lisanga ya moke, mokambi ya Eteyelo ya bana akoki kozala kaka moko abengami mokambi na Eteyelo ya bana. Na lolenge oyo, ye akosala elongo na baboti mpo na kobongisa mateya, ntango ya loyembo mpe misala. Soki lisanga ezali monene mpenza, mabiangi ya kobakisa esengeli kosalema na lolenge oyo: bapesi toli, motambwisi miziki, batei mpe bakambi ya bana miki, sekeletele, mpe batambwisi misala.

Bokambi ya Eteyelo ya bana esungaka baboti mpo na kolengela bana mpo na kokota mpe kokoba na nzela ya liyokani.

Mpo na kokokisa yango, mokambi ya Eteyelo ya bana akoki kotinda moko ya bakambiasunga baboti mpo na kolengela bana na bango mpo ete bazua libatisi mpe nkotisa. Mokambi ya Eteyelo ya bana akoki kotinda moko ya mosusu mpo na kosunga baboti na kolengela bana na bango mpo na tempelo mpe bonganganzambe.

Mokambi ya Eteyelo ya bana azali na mikumba oyo elandi. Bapesi toli na ye bakosunga ye.

  • Kosala na lisanga ya palwasi

  • Mingimingi kokamba mayangani ya bokambi ya Eteyelo ya bana mpe kokutana elongo na episikopo to mopesi toli na ye oyo atindami na ye.

  • Kosunga mpo na kobongisa misala mpo na bana bakomama ntango esengami (tala 18.7.2).

  • Kobongisa mpe kotambuisa mayangani ya kofungola ya Eyenga na Eteyelo ya bana.

  • Kosala na bana, batei, mpe batambwisi moko na moko na Eteyelo ya bana.

  • Koteya bakambi ya Eteyelo ya Bana mpe batei mikumba na bango mpe kosunga bango na mikumba oyo na kolakisaka bango nzela ya mabiangi na bango (tala Teaching in the Savior’s Way [2016], 38).

  • Kokamba makomi, balapole, misolo, mpe bambongo ya Eteyelo ya bana.

12,3.4

Motambwisi Miziki mpe Mobeti lindanda

motambwisi miziki mpe mobeti lindanda bateyaka bana nsango malamu ya Yesu Klisto na nzela ya miziki katikati ya ngonga ya koyembaka.

Soki mobeti lindanda ezali te, batambwisi bakoki kosalela radio.

12,3.5

Batei mpe Batambwisi Eteyelo ya bana mike.

Bokambi ya Eteyelo ya bana ekopesa episikopo mibali mpe basi mpo na kosala lokola batei ya Eteyelo ya bana mpe botambwisi ya bana ya mike. Bandimi yango bokobengama mpo na koteya mpe kosala na liboke moko eyebani mibu ya bana.

Batei ya Eteyelo ya bana mpe batambwisi ya bana ya mike bakoteya uta na Yaka, Landa Ngai—Mpo na Eteyelo ya bana (mibu 3–11) mpe Behold Your Little Ones (nursery).

12,3.6

Mosala ya Bakambi

Bakambi ya mosala ya Eteyelo ya bana basalelaka bana lokola balengelaka mosala mpe milulu kobandaka na na Sanza ya yambo ya mobu oyo bana bakokisi mibu 8 (tala 12.2.1.3). Lisalisi mpe misala etali makasi na mosala ya lobiko mpe ya bonetoli. Yango esepelisaka mpe ekotisaka.

12.5

Bokambi mpe Mibeko Ebakisama

12,5.1

Kobatela Bana

Ntango mikolo bazali kosolola na bana na bisika ya Eklezia, ata mikolo mibale balongobani basengeli kozala wana.

Mikolo nyonso oyo bazali kosala elongo na bana basengeli kolanda boyekoli ya lolenge ya kobatela bana mpe bilenge na sanza moko ya kobatelama (ProtectingChildren.ChurchofJesusChrist.org).

Bimisa na lokasa